Lingomba ya Islam
zonga

38. Saad

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Swâd, na kurani, eye ezali na bokundoli

2Kasi baye bapengwa bazali sé na ntembe

3Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te

4Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta

5Boye alingi kotia banzambe ete bakoma sé Nzambe moko? Oyó ezali likambo ya kokamwa

6Mpe bankumu na bango bakei mpe balobi: Bökende mpe botikala na banzambe na bino. Ya soló wana nde ezali malamu

7Totikala koyoka yango te na lingomba lia suka ya sólo, eloko oyo basali yango kosala

8Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai

9То, boye basimbi sanduku ya ngolu ya Nkolo wayo wa bokasi mopesi manso

10То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta

11Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala)

12Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima

13Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)

14Ata moko te andimelaki batindami, mpe bazuaki etumbu

15Bazalaki kozela sé lolaka moko liye likopesa bango ata bopemi moko te

16Мре balobaki: Nkolo pesa biso oyo ya biso yambo ete mokolo ya suka eya

17Zala na bozeli тропа oyo bazali koloba, mpe kanisa na mowumbu wa biso Dáwud, oyo atonda na bokasi yakokumisa biso. Ya soló ye azalaki komizongisa (epai ya Allah)

18Мре totiyaki bangomba ezala na botondi tongo mpe pokwa elongo naye

19Mpe bandeke lokola, nyoso esalamaki sé тропа kokumisa ye. (Allah)

20Mpe tolendisaki bokonzi bwa ye, mpe topesaki ye bwanya mpe mayele ya kokata makambo

21Boye basango ya bato ya kosuana ekomelaki yo te? Tango babutaki na esika ya losambo. (ya likolo)

22Tango bakotelaki Dáwud, mpe abangaki. Balobaki naye ete: Kobanga te, tozali kowelana biso mibale, kabola kati na biso na bosembo, kasi kotengama te, mpe kamba biso o nzela ya semba

23Ya sólo, ndeko wa ngai ya mobali oyo azali na bameme ntuku libua na libua, mpe ngai nazali na meme moko, alobi na ngai: Pesa nabombela yo yango, mpe tango tozongisani maloba, alobi na ngai mabe

24(Dáwud) alobi: Abubaki yo ya sôló, тропа kosenga yo тете nayo mpo akokisa na (yango motango) oyo ya ye, mpe ya sôló bato balingaka kobotolo biloko ya baninga, longola sé baye bandima mpe basalaka misala milamu, kaši bazali токе. Мре Dâwud akanisaki ete tomekaki ye, asengaki bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe agumbamelaki mpe atubelaki

25Mpe tolimbisaki ye na yango mpe epayi nabiso akozala na esika ya likolo mpe oyo esika malamu ya kozonga

26Eh Dâwud! Ya soló, totiyaki yo mokitani kati na mabele, mpe kata kati na bato na bosembo, kasi kolanda baposa te, noki te ekobungisa yo nzela ya Allah. Ya sólo, baye babungi nzela ya Allah, bakozalaka na etumbu ya makasi, mpo ete babosanaki (kokanisa) na mokolo mwa suka

27Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango)

28То boye bandimi baye basalaki misala milamu bazala lokola baye babebisaki na mokili? То totiya babangi (Allah) ndenge moko na bato mabe

29Buku eye tokitisaki epai nayo, ya mapamboli mpo ete basosola mikapo mia yango, mpe mpo ete banganga ya mayele bakundola yango

30Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi

31Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu

32Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi

33Bozongisela ngai yango, na yango abandi kokata yango makolo na bakingo

34Mpe ya sólo, tomekaki Suleyman, tobwakaki likolo ya kiti naye nzoto ya moto, sima atubelaki

35Alobi: Nkolo! Limbisa ngai mpe pesa ngai bokonzi boye moko te sima na ngai akokana na yango. Ya sólo, ozali mopesi monene

36Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete

37Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala

38Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo

39Oyó nde likabo lia biso, kabola yango,to kopesa te, sala ndenge olingi

40Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga

41Mpe kundola mowumbu wa biso Ayúb tango abelelaki Nkolo waye, ete satana akangi ngai na mpasi mpe etumbu

42Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu

43Mpe tozongiselaki ye libota lia ye, mpe tobakiselaki ye libota mosusu. Wana ngolu na biso тропа bokundoli ya bato banso ya mayele

44Mpe simba na loboko nayo eteni ya singa ya libende mpe bete yango, kasi kozangisa elaka te, ya soló tokutaki ye na bokangi motema mpenza, oyo nde mowumbu ya malamu azalaki kotubela mingi

45Мре kanisa тропа Ibrâhîm па Is’hâq па Ya’qüb, bawumbu па biso ya nguya mpe ya mayele

46Ya soló toponaki bango boponami ya bokundoli ya lola

47Mpe ya sólo, bazali epai na biso, baponami ya malamu

48Mpe kanisa Ismail na Al-yasa’ na Dzul-kifl, bango banso bazalaki kati na baponami malamu

49Oyó nde bokundoli, mpe babangi bakozalaka na bozongi bolamu

50Lola ya edeni bizibeli na yango ekozala ya kofungowama pona bango

51Wana nde bakoyekemelaka yango, bazali kosenga bambuma ebele, mpe komela

52Mpe pembeni na bango, bakozala na basi ya kitoko, baye bazali na miso ya kolula te

53Oyó nde elengelamaki тропа bino mokolo mwa lifuta

54Ekozalaka nde bopesi bwa biso eye ekokutuama te

55Wana, batomboki bakozala na bozongi ya mabe

56Lifelo nde ekozikisa bango, bovandi kani ya mabe ya lolenge wana

57Na yango, bakomela mayi ya tofina ya moto makasi

58Mpe bakozuaka bitumbu bisusu sé ya lolenge wana

59Oyo nde lingomba liye likokotaka nzela moko na bino, mpe bakoyambaka bango te. Kasi bakozika na moto

60Bakolobaka: Bokoyambama malamu te, bino nde bolengeleki yango тропа biso, esika kani ya bovandi ya mabe ya lolenge wana

61Bakolobaka: Nkolo wa biso, nani apeși biso oyo, bakisela ye etumbu na lifelo

62Mpe bakoloba: Mpona nini tozali kornona te mibali ba oyo tozalaki kotanga bango na molongo ya bato mabe

63Boye tosekaka bango to babungaka na miso na biso

64Ya soló, wana ekozala kosuana ya bato ya moto

65Loba: Ya sólo, nazali sé mokebisi. Mpe nzambe mosusu azali te na kobondela na bosóló sé Allah wa bomoko mpe ya bokasi koleka

66Nkolo wa likolo na mabele, mpe manso maye mazali okati na yango mibale, azali wa bokasi atonda bolimbisi

67Loba: (kurani) oyo ezali na sango ya monene

68Boye bino bozali koboya yango

69Nazalaki na boyebi te тропа ba anzelu, tango bazalaki koswana

70Ayebisaki ngai ete nazali sé mokebisi ya polele

71Tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu: Ya soló nalingi kokela moto na mabele

72Soki nabongisi ye mpe nafuli ye mopepe ya molimo na ngai, bokweyela ye na bogumbami

73Mpe ba anzelu banso bafukamelaki ye

74Longola sé ibilisa asalaki lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi

75(Allah) alobi: Eh ibilisu! Eloko nini epekisi yo kogumbamela (moto) oyo nakeli ye na maboko na ngai? Boye osali lolendo to omimoni ete yo ozali likolo koleka

76Alobi: Nazali malamu mingi koleka ye, okelaki ngai na moto mpe okelaki ye na mabele

77(Allah) alobi: Віта awa, ozali ya kolakelama

78Mpe botutu bwa ngai, bokozalaka likolo lia yo kino o mokolo mwa suka

79Alobi: Nkolo, tikela ngai tango kino omokolo mwa bosekwisami

80(Allah) alobi: Ya soló, napesi yo tango

81Kino omokolo ngonga ekokokaka

82Alobi: Na nguya nayo (Allah), nakobungisaka bango banso

83Longola sé bawumbu nayo baye opona

84(Allah) alobi: Ya sólo, mpe oyo ezali bosolo nazali koloba

85Ya sólo, na kotondisa lifelo nayo, mpe baye banso bakolanda yo

86Loba: Nazali kosenga bino lifuta te, mpe nazali te oyo azali kokonza na makasi

87(Kurani) ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba

88Mpe kala te, bokoyebaka basango na yango

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath