36. Yaseen, oyo
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Yâ, Sín
2Na kurani oyo etonda bwanya
3Ya soló, ozali (Muhammad) kati ya batindami
4O kati ya nzela ya semba
5Ekitisamaki kowuta na oyo azali na bokasi atonda ngolu
6Mpo ete okebisa bato oyo bankonko na bango bakebisamaki te, kasi bazalaki kokanisa te
7Liloba lisilaki кокота likolo na bango ya sólo, kasi ebele bazali kondima te
8Ya solo, tokotiela bango basinga na bakingo mpe na minoko na bango, тре bakotambola na yango sé bongo
9Mpe tokangaki liboso na bango mpe sima na bango, mpe tozipaki bango (miso) ete bamona te
10Mpe ezali sé ndenge moko, okebisa bango to okebisa te, bakondima te
11Ya soló, esengeli okebisa sé oyo azali kolanda maloba (kurani), mpe azali kobanga Ar-Rahmán na kobombama, pesa ye sango ya bolimbisami mpe lifuta lilamu
12Ya soló, biso nde tokosekwisaka bawei, mpe tokomeli bango maye basalaki ya malamu to ya mabe, mpe na mikoloto na bango mpe eloko nyoso topesi motango na yango okati ya buku ya polele
13Pesa bango ndakisa ya bato ya mboka tango batindami bayelaki bango
14Tango totindelaki bango batindami mibale, baboyaki kondimela bango, tobakiseli bango ya misato, balobi: Ya sólo, totindami epai na bino
15Bayanolaki: Bozali bato lokola biso, Ar-Rahmán akitisi eloko тропа biso te, bino bozali sé kokosa
16Balobi: Nkolo wa biso ayebi ya sólo ete: Tozali batindami epai na bino
17Mpe tozali sé тропа bokomisi sango bwa polele
18Balobi: Tozali kornona bino na makanisi mabe, soki botiki yango te, tokobwakela bino mabanga, mpe etumbu makasi kowuta epai na biso ekozua bino
19Balobi: Makanisi mabe ezali epai na bino moko, boye nde lolenge bozali kosala soki bopesami makundolami? Kasi bozali bato mabe balekisi ndelo
20Mpe moto moko ayaki na suka ya mboka na lombango (na ebandeli ya mboka) mpe alobi: Oh bato na ngai! Bolanda batindami
21Bolanda baye bakotuna bino lifuta ata moko te, mpe bazali na liloba lia bokambami
22Mpe тропа nini te nabondela ye oyo akeli ngai, mpe epai naye nde bokozongisama
23Boye nazuela ye banzambe basusu? Soki Ar-Rahmân alingeli ngai mabe, kosenga na bango ekosalisa ngai na eloko moko te, mpe bakobikisa ngai te
24Ya soló, nakozala na libungi lia polele
25Ya solo, ngai nandimi na Nkolo wa bino, boyoka ngai
26(Na yango), elobamaki naye: Kota na lola. Alobi: Soki bato na ngai bayebaka
27Mpo ete Nkolo na ngai alimbisi ngai mpe atie ngai o molongo ya bato ya lokumu
28Мре sima naye tokitisaki mapinga ata moko te, mpe tolingaki kokitisa eloko moko te likolo ya bato naye
29Ezalaki sé bogangi moko (mongongo ewutaki na likolo) mpe etumbu ezuaki bango
30Eh mabe ezali likolo ya bawumbu! Motindami atikala koyela bango te sé batióla ye
31Bazali kornona te bato boni toboma liboso na bango, mpe bazongelaki bango te
32Mpe (moto) nyoso, akotelema liboso na biso (тропа kosamba)
33Mpe elembo moko тропа bango ezali ete topesaka bomoyi na mabele maye makawuka, mpe tobimisaki kowuta na yango mbuma iye bazali kólia
34Mpe totiaki okati na yango (mabele) bilanga ya naghil mpe a’náb mpe tobimiselaki yango maziba ya mayi
35Mpo ete balia bambuma na yango, mpe na oyo maboko na bango masali. Boye bakozala na botondi te
36Nkembo naye oyo akeli biloko na balolenge binso biye bibimaka na mabele, mpe na banzoto na bango mpe na maye bayebi te
37Mpe elembo mosusu тропа bango ezali butu, oyo tolandisi yango mokolo, kasi bango bafandi o kati ya molili
38Mpe moyi mozali kotambola na botiami na yango. Wana ezali etiyeli ya oyo azali na bokasi atonda boyebi
39Mpe sanza, totiaki yango na bitape kino ekokonda ekomi lokola lokasa ya mbila ya ко kawuka
40Moyi mokutaka sanza te, mpe butu elekaka mokolo te. Mpe nyoso ezali kotambola na nzela na yango
41Mpe elembo mosusu тропа bango, ezali ete tomemaka bato na bango na masuwa oyo etondaka
42Mpe tosaleli bango mosusu lokola oyo wana bazali komata na kati тропа kotambola
43Мре soki tolingaki nde tozindisaki bango, nde bazuaki mosungi te, mpe balingaki kozua libiki te
44Ezali sé тропа mawa na biso, тре mpo bakoka kosepela na mwa tango токе
45Мре soki bayebisi bango ete, bobanga oyo ezali liboso na bino mpe sima na bino mpo ete bozua ngolu
46Mpe elembo moko te kati ya bilembo ya Nkolo na bango eyelaki bango bobele bapesa yango mokongo
47Mpe soki bayebisi bango ete: Bobimisa na bozui oyo Allah apeși bino тропа kokaba, bapagano bakoloba na bandimi ete: Tokoleisa moto oyo soki Allah alingi akoleisa ye? Bino bozali sé na libunga ya polele
48Mpe bazali koloba: Elaka ekokokaka tango nini soki bozali koloba bosóló
49Bakoyoka sé lolaka moko ekozuaka bango na mbalakaka tango bazali kosuana
50Bakokoka (tango wana) kotikela libota na bango malako te mpe bakokoka lisusu kozongela bango te
51Мре bakofula kelelo, тре okomonaka bango babimi na malita bazali kokima mbangu epai ya Nkolo wa bango
52Bazali koloba: Eh mawa na biso! Nani asekwisi biso na esika oyo tozalaki kolala? Boye oyo nde elaka ya Ar-Rahmán alakaki, mpe batindami balobaki bosóló
53Ekozalaka sé lolaka moko ya (makasi) okomona bango banso bazali liboso lia biso
54Mokolo wana, bakobuba ata molimo moko te, mpe bokofutamaka te sé na maye bozalaki kosala
55Ya soló, mokolo wana bato ya lola bakozalaka na misala ya bokokisi bolamu bwa bango
56Bango na balongani na bango bakozalaka na bisika bia тріо, bavandi likolo lia bakiti
57Bakozalaka na bambuma (ya kolia) mpe bakozuaka nyoso oyo bakosengaka
58(Salam) kimia, liloba likowutaka epai ya Nkolo oyo atonda mawa
59Kasi lelo, tika ete bozala mosika, eh bino bato mabe
60Boye nalakaki bino te eh! Bana ya Adam! Ete bobondela satana te? Ya soló, azali monguna na bino ya polele
61Mpe (nayebisaki bino te ete) bobondela ngai? Oyo nde nzela ya semba
62Mpe (satana) asilaki kobungisa ebele o kati na bino, boye bozali kokanisa te
63Oyo nde lifelo oyo balakaki bino
64Lelo bokozikisama na yango, тропа maye bopengwaki na yango
65Mokolo mona tokokanga minoko mia bango, kasi maboko na bango makolobela biso, mpe makolo na bango makozala nzeneneke ya maye bazalaki kosala
66Mpe soki tolingi, tokolimwisaka miso na bango, mpe bakokimaka na nzela, kasi bakomonaka ndenge nini
67Mpe soki tolingi, tokobalusa bango sé esika moko, bakokoka kokende liboso te, mpe kozonga sima te
68Na oyo tokopesaka ye bomoyi molayi, tokozongisa ye na lolenge ya bokelami naye (motawu na nzoto mpe na bongo naye). Boye bazali koyeba te
69Ezali ntôki ya mpamba mpamba te nde totangisaki ye (Muhammad), mpe esengeli naye te. Kaši ezali nde bokundoli, mpe kotanga kurani oyo ezali polele
70Mpo akebisa oyo akozala na bomoyi, mpe liloba lisila kokokisama тропа bapengwi
71Boye bazali kornona te ete kati ya maye maboko na biso masali, tokeli An‘âm biye bazali kokonza
72Mpe tondimelaki bango bamatelaka misusu mpe misusu baliaka
73Mpe bazali kobimisa kati na yango (biloko) oyo ezali kosalisa bango, mpe misusu ya komela kasi bazali kotondo te
74Mpe bazali kozua banzambe misusu batiki Allah, bazali kokanisa ete bakosalisa bango
75В aye wana bakokokaka kosalisa bango te, kasi bakokoma nde lipinga liye likotelemela bango
76Maloba na bango mapesa yo mpasi te. Ya soló, biso toyebi maye bazali kobomba mpe maye bazali komonisa
77Boye moto ayebi te ete tokeli ye kowuta na mayi ya mokongo, na sima abaluki akomi monguna ya polele
78Azali kobetela biso ndakisa kasi abosani bokelami bwa ye moko, alobi: Nani akopesa bomoyi na mikuwa sima ya kokoma na yango putulu
79Loba: Oyó akopesa yango bomoyi nde oyo akelaka yango o mbala ya liboso, mpe ayebi malamu bokeli bwaye bonso
80Ye nde azalisaki тропа bino moto kowuta na nzete ya mobesu, yango nde bozali kopelisa
81Boye oyo akeli mapata na mabele akoki te kokela basusu lokola bango? Iyo, ya soló azali mokeli monene koleka bango mpe azali moyebi
82Ya sólo soki alingi (kosala) eloko akolobaka se, zala, mpe ezalisami
83Nkembo na oyo azali na bokonzi bonso, na maboko naye, mpe epai naye nde bokozongisama
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath