Lingomba ya Islam
zonga

98. Al-Bayyina, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Bapagano kati ya baye bazwa buku mpe na basangisi (Allah) bakotika kompengwa te kino elembo ya polele ekoyelaka bango

2Motindami ayeli bango kowuta epai na Allah azali kotangela bango buku ya bopeto

3O’kati na yango mikapo ya nsemba mizwami

4Baye bazwaki buku bakabwanaki te sé ntango elembo ya polele ekomelaki bango

5Batindamaki te sé kaka babondela Allah na bomoko bwa ye mpe batelemisa losambo mpe bafuta zakat boye nde lingomba ya bosembo

6Ya sôló, Bapagano kati ya baye bazwa buku na basangisi (Allah) bakozala o’kati ya móto seko na seko bango wana nde bazali bikelamu ya mabe

7Ya sôló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu, bango nde bazali bikelamu ya malamu

8Lifuta lia bango epai ya Nkolo na bango likozala lola ya eden loye míngala mizali kotiola o’nse na yango тропа libela, Allah akosepela na bango, bango pe bakosepela naye wana nde ekozala lifuta ya oyo abangi Nkolo naye

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath