Lingomba ya Islam
zonga

91. Ash-Shams, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1(Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango

2(Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese

3(Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala

4(Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili)

5Mpe mapata na oyo atongi yango

6Mpe mabele na oyo atanda yango

7Mpe na molimo na oyo abongisa yango

8Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)

9Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye)

10Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango

11Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima

12Ntango moto mabe kati na bango atelemaki

13Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah ya Allah botika yango emela mayi

14Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango

15Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath