89. Al-Fajr azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1(Nalapi) na eleko ya ntongo
2(Mpe nalapi) na babutu zomi
3(Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te
4(Mpe nalapi) na butu ntango esilaka
5Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele
6Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad
7Na mboka Irama ndenge etongamaki na bandako ya likolo
8Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili
9Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba
10Na Falo moto ya mapinga
11Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango
12Mpe babebisaki mingi koleka
13Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu
14Mpo ete Nkolo nayo azali kotala
15Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga
16Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga
17Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te
18Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola
19Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe
20Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi
21Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo
22Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo
23Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te
24Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai
25Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te
26Mpe moto moko te akokangama lokola ye
27Oh yo molimo y a kimia
28Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo
29Kota elongo na bawumbu ba ngai
30Mpe kota okati ya lola na ngai
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath