88. Al-Ghaashiya azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa
2Mokolo wana bilongi bikobanga
3Makambo maleki bango bakomi na bolembu
4Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi
5Mpe bakomelisa bango mayi ya moto
6Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube
7Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te
8Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo
9Bikosepela pona maye basalaki
10Okati ya lola ya likolo
11Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba
12Okati na yango maziba mazali kotiola
13Okati na yango bambeto ya kotombwama
14Mpe bakopo bitiami
15Mpe bikáta bitandami
16Mpe bankwala bizali ya kotandama
17Bazali kot ala te ba ibil ndenge ekelama
18Mapata lolenge etombwama
19Mpe bangomba lolenge epikama
20Mpe mabele lolenge etandama
21Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli
22Kasi ozali mokengeli likolo na bango te
23Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima
24Allah akopesa ye etumbu ya monene
25Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango
26Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath