Lingomba ya Islam
zonga

87. Al-A'laa, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka

2Oyo akela mpe akokisa

3Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba

4Mpe oyo abimisa matiti

5Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu

6Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te

7Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama

8Mpe tokolakisa yo nzela ya pete

9Pesa liteya na baye ekosalisa bango

10Oyo azali na bobangi nde akokanisa

11Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi

12Oyo akozika na moto ya monene

13O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te

14Asili kolonga oyo amipetoli

15Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli

16Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé

17Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko

18Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo

19Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath