85. Al-Burooj, oyo azali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1(Na lapi) na mapata eye etonda minzoto
2Mpe na lapi na mokolo ya elaka
3Mpe na lapi na nzeneneke na baye bazali kotala
4Babomaki bato ya nsé ya ngomba
5Na moto etonda bankoni
6Mpe bango bazingaki yango yakofanda
7Mpe bazalaki kornona maye bazali kosala na bandimi
8Bayinamaki mpo ete bandimi na Allah wa nguya atonda lokumu
9Ye oyo azali na bokonzi ya likolo na nsé, Allah azali na boyebi na biloko binso
10Baye bazali konyokola bandimi ya mibali na ya basi, soki batubeli te bakozwa etumbu ya lifelo mpe monyokoli ya moto
11Ya soló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu bakozwaka Iola eye mingala mizali kotiola na nsé na yango. Wana nde ezali elonga ya monene
12Ya sólo, etumbu ya Nkolo nayo ezali makasi
13Ye nde abandaka mpe azongelaka (bokeli)
14Mpe azali molimbisi mpe atonda bolingo
15Nkolo ya ngwende ya lokumu
16Asalaka maye alingi
17Ekomelaki yo te sango ya mapinga
18Ya Falo na Thamúd
19Kasi bapagano bazali sé koboya kondima
20Nzoka nde Allah azingi bango
21Kasi yango ezali kurani ya lokumu
22Ekomami likolo ya libaya liye libatelami epai na Allah
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath