Lingomba ya Islam
zonga

84. Al-Inshiqaaq azali moto ya mayele

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Ntango mapata mako pasuka

2Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala

3Mpe ntango mabele makolalisama

4Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba

5Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala

6Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye

7Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali

8Akosambisama na ndenge ya malamu

9Mpe akozonga o’libota naye na esengo

10Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye

11Akomisengela mabe

12Мре akozikisama okati ya moto ya makasi

13Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye

14Azalaki kokanisa te ete akosekwisama

15Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye

16Te na lapi na ngonga ya mpokwa

17Mpe na lapi na butu na molili na yango

18Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba

19Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni

20Mpona nini bazali kondima te

21Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango

22Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta

23Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba

24Pesa bango sango ya etumbu ya makasi

25Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath