Lingomba ya Islam
zonga

83. Al-Mutaffifin azali moto ya mayele

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Mawa na baye bazali koy iba

2Baye ntango bazali (kosomba) bazali kosenga ete bakokisela bango emekeli

3Kaši ntango bazali komeka pona bato mosusu bazali kozangisa

4Bango bazali kokanisa ete bakozonga na bomoi te sima ya liwa

5Na mokolo ya monene

6Mokolo moye bato bakotelema liboso ya Nkolo ya molongo

7Kasi ya soló, buku ya bato ya mabe ekozala okati ya sidjíne

8Nani akoyebisa yo eloko nini sidjíne

9Buku eye ekomama

10Mokolo wana etumbu ekozala тропа baye baboyi kondima

11Baye bazali kozwa mokolo ya suka na lokuta

12Kasi akoboya kondima sé molekisi ndelo mosumuki

13Oyo soki batangeli ye maloba na biso alobi: Wana ezali másese ya bakoko ya kala

14Ezali boye te, kaši mitema miabango mizali na mbindo na maye bazalaki kosala

15Kasi basala angele ya soló mokolo mona mokozipa bango mpo ete bamona Nkolo na bango te

16Sima bakozikisama ya sólo okati ya lifelo

17Sima bakoloba na bango wana maye bozalaki koboya kondima

18Ya sólo, buku ya bato malamu ekozala o’kati ya iliyíne

19Nani akoyebisayo eloko nini iliyíne

20Buku eye ekomama

21Ba anzelu ya pembeni ya Nkolo (Allah) bazali banzeneneke тропа yango

22Ya sólo bato ya malamu bakozala okati ya bisengo

23Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotalana

24Okoyeba bilembo bia bisengo o’bilongi bia bango

25Bakomela masanga ya sukali oyo esila kobongisama

26Etikaka solo ya mpimbo na suka lokola malasi, na yango esengeli nabaye bazali kolikia тропа yango basala molende

27Mpe esangisani na masanga ya tasmin (liziba)

28Baye bakozala pembeni na Nkolo (Allah) bako mela mayi ya liziba wana

29Ya soló, bato mabe bazalaki kotiola bandimi

30Mpe soki baleki pene na bango bazali (kodongola bango miso nako fina) miso na bango

31Mpe soki bazongi o’mabota na bango bazali kokosa bango

32Mpe soki bamoni bandimi balobi ete: Ya sólo, baye wana nde babunga nzela

33Nzoka nde batindamaki te bazala bakengeli likolo ya bandimi

34Kasi lelo bandimi bako tiola bapagano

35Likolo ya bakiti ya lokumu bazali kotala

36Bapagano bazwi te lifuta liye ekoki na bango na tina ya maye bazalaki kosala

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath