Lingomba ya Islam
zonga

80. Abasa

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Akangi elongi mpe apesi mokongo

2Mpo ete mokufi miso aye epai naye

3Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola

4To mpe kokanisa mpo ete mateya esalisa ye

5Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye

6Ozali koyamba ye na lombango

7Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te

8Kasi mpona oyo aye na lombango epai nayo

9Naye azali na bobangi

10Ozali kotala ye te

11Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya

12Oyo alingi akanisa yango

13Ezwami kati ya makomi ya lokumu

14Etombwami mpe epetolami

15O’maboko ma bantoma

16Baye ya lokumu тре botosi

17Moto amibomi na bopengwi naye

18Na eloko nini akelamaki

19Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye

20Sima alakisi ye nzela

21Sima abomi ye mpe akotisi ye na lilita

22Mpe akosekwisa ye na ntango alingi

23Moto akokisi te maye atindamaki

24Esengeli na moto atala bileyi naye

25Ya soló, biso nde tozali kokitisa mayi

26Sima topasoli mabele na nzela

27Mpe na nzela wana tobimisi bambuma

28Ba inab mpe bandunda

29Na nzete ya zaítún na nzete ya nagh’l

30ЗО. Мре bilanga ebele

31Мре tobimisi mbuma mpe matiti

32Bileyi тропа bino na An’âm na bino

33Kasi tango bobulungani ekoya

34Mokolo moye moto akokima ndeko naye

35Mpe akokima mama naye mpe tata naye

36Akokima mwasi naye mpe bana baye

37Mpamba te mokolo wana moto na moto akotala sé makambo matali ye

38Mokolo wana bilongi bisusu bikongenga

39Bakoseka mpe bakosepela

40Kasi bilongi bisusu mokolo yango bikozala na putulu

41Bikozipama na molili

42Baye wana nde bazali bapengwi mpe bato ya mabe

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath