Lingomba ya Islam
zonga

78. An-Naba, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Na likambo nini bazali komitunana

2Likolo ya sango enene

3Eye pona yango bakeseni makanisi

4Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke

5Te sima lisusu bakoyeba yango

6Tozalisaki te mabele etando

7Mpe bangomba lokola makonzi

8Tokelaki bino te mibale mibale

9Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi

10Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino

11Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi

12Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama

13Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga

14Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele

15Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona

16Na bilanga ekembisami (kitoto)

17Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana

18Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga

19Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke

20Mpe bangomba bikotambola na lombango

21Ya solo, lifelo ezali kozela

22Esika yakofanda тропа batomboki

23O’kati na yango bakofanda seko na seko

24O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te

25Longola sé mayi ya moto ya tofina

26Lokola lifuta lia bosembo тропа bango

27Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te

28Mpe batiaki ntembe na maloba na biso

29Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda

30Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu

31Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah)

32Bilanga mpe masanga ya bilengi

33Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko

34Mpe bankopo ebele ya bomeli

35O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te

36Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza

37Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân bakozala na liloba te o’boso bwa ye

38Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo

39Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye

40Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath