77. Al-Mursalaat, oyo ezali na buku
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1(Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki ya kolandana! (ba anzelu)
2Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi
3Mpe bazali kopanza bisika binso
4Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu
5Mpe na baye babwakaka mbela
6Mpona bolimbisi to bokebisi
7Oyo bolakamaki ekozangaka te
8Tango minzoto mikolimwaka
9Mpe tango mapata ekopasuka
10Mpe tango bangomba bikolalisamaka
11Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka
12Yango ezongisami mpona mokolo nini
13O mokolo ya kokata makambo
14Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo
15Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
16Boye tobomaki bamisusu liboso te
17Sima tolandisaki bamisusu te
18Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki
19Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi
20Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te
21Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te
22Na elaka oyo eyebani te
23Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te
24Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
25Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te
26(Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa
27Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te
28Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
29Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta
30Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato
31Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te
32Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo
33Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka
34Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
35Mokolo wana bakolobaka te
36Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te
37Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
38Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso
39Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai
40Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
41Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba
42(Bakoliaka) bambuma oyo balingi
43Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki
44Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi
45Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
46Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki
47Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
48Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)
49Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi
50(Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath