76. Al-Insaan azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Ezali na tango molayi eleka na mokili moto azalaki eloko moko te liboso ete akelama
2Ya soló, tokelaki moto na litanga ya mayi ya mokongo (oyo esangani na biloko ebele), тропа tomeka ye na yango, mpe totieli ye boyoki mpe bomoni mpo oyoka mpe amona
3Ya solo, tolakisaki ye nzela mpo atondo (Allah) to apengwa
4Ya solo, tolengeli тропа bapengwi minyololo ya basinga milai ya makasi mpe etumbu ya saira. (moto ya makasi ya lifelo)
5Ya solo, babangi (Allah) bakomelaka na bakopo ya kitoko ya kafura ya malili solo kitoko
6Esika oyo bawumbu ya Allah bakomelaka ndenge balingi ezali kobimisa mayi ya malamu
7Bazali kokokisa bilaka mpe bazalaki kobanga mokolo moye mabe na yango ekopanzana bisika binso
8Мре bazali koleisa babola na bana bitike mpe bato ya boloko, na bolingo (ya biloko yango)
9Ya soló, tozali koleisa bino тропа Allah, tolingi bofuta biso te mpe bopesa biso melesi te
10Tozali kobanga Nkolo na biso тропа mokolo oyo ya somo mpe ya mabe koleka
11Allah akobatela bango na mabe ya mokolo wana, mpe bakokutana na bongengi mpe esengo
12Mpe akofuta bango lola тропа maye basalaki, mpe akopesa bango bilamba bia fafala
13Bakoyekamaka likolo ya bakiti ya kitoko, moyi ekotungisaka bango te mpe bakoyokaka malili makasi te
14Bilili na yango bikozipa bango penepene, mpe mbuma na yango bikokita tii pembeni na bango тропа kobuka
15Mpe bakopesaka bango bitiyelo biye bisalami na mabende ya mbongo na bakopo bisalami na mabanga ya pembe ya kitoko bikotambwisama likolo na bango тропа kólia mpe komela
16Bakopo to milangi ya mabende ya kongenga ya кококапа
17Мре bakomelaka mayi oyo esangani na tangawisi
18Ezali kowuta na liziba oyo ebengami salsabila kuna na kati
19Мре bilenge mibali ya libela bakotambola nakati na bango тропа kosalela bango, soki omoni bango okokanisa ete bazali mabanga ya mayi ya kongenga oyo epanzani
20Mpe soki otali kuna okomona kitoko na bokonzi bonene
21Мре bakolata bilamba ya langi ya mayi ya pondu ya lolenge ebele тре basinga ya palata na maboko na bango mpo na bonzenga. Mpe Nkolo wa bango akomelisa bango mayi ya bopeto
22Ya soló, oyo ezali lifuta тропа bino, mpe molende na bino ekofutama
23Ya sólo, biso nde tokitiselaki yo kurani oyo na ndambu ndambu
24Zala na bozeli na oyo Nkolo nayo apesi mibeko, mpe kotosa mosumuki to mopengwi te okati na bango
25Мре tanga nkombo ya Nkolo nayo tongo mpe pokwa
26Mpe na butu ofukamela ye, mpe okumisa ye butu molayi
27Ya soló, bango balingi (bomoyi) ya nsé, mpe batiki sima na bango mokolo ya kilo mpe ya somo
28Biso nde tokela mpe tobongisi bokeli, soki tolingi tokoya na bato mosusu na esika na bango
29Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azwa nzela ya kokende epai ya Nkolo naye
30Na yango: Bokolinga eloko te sé ezala na bolingi ya Allah. Ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya
31Akotisaka oyo alingi na mawa naye, kasi тропа bato mabe, abombeli bango etumbu ya makasi
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath