Lingomba ya Islam
zonga

75. Al-Qiyaama azali moto ya mayele

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nalapi na mokolo ya lisekwa

2Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te

3Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te

4Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki)

5Moto alingi sé atikala na mabe

6Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini

7Tango miso ekobulungana (ezangi kornona)

8Mpe sanza ekozanga bongengi na yango

9Mpe moyi na sanza ekosanganaka

10Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima

11Esika ya kokima ezali te

12Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo

13Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima

14Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye)

15Mpe ata asengi bolimbisi

16Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani)

17Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango

18Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu

19Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango

20Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé

21Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka

22Mokolo wana okomona bilongi bikongenga

23Bizali kotala Nkolo na yango

24Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda

25Bizali kozela etumbu

26Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo

27Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi

28Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa)

29Mpe lokolo elali likolo ya moninga

30Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana

31Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te

32Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo

33Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo

34Mpasi nayo mpasi

35Sima mpasi nayo mpasi

36Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye)

37Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama

38Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te

39Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali

40Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath