74. Al-Muddaththir azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti
2Telema mpe kebisa
3Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene
4Mpe petóla bilamba nayo
5Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)
6Mpe kopesa te mpo bafuta yo
7Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo
8Mpe tango bakofula kelelo
9Wana ekozala mokolo ya mpasi
10Mpona bapengwi ekozala mpete te
11Tika ngai na oyo nakeli ye moko
12Mpe oyo napesaki misolo ebele
13Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso
14Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso
15Sima, apengwi na bolamu (na ngai)
16Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi
17Nakopesa ye pasi ya koleka
18Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano
19Akufa na ndenge akanaki
20Sima akufa na ndenge akanaki
21Sima atalaki
22Sima abebisi elongi mpe akangi
23Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo
24Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami
25Wana ezali sé liloba lia moto
26Nakozikisa ye na moto ya saqar
27Nani akoyebisa yo nini saqar
28Etiki eloko te mpe ebateli te
29Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo
30O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua
31Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato
32Te; (nalapi) na sanza
33Mpe butu tango elalaka
34Mpe tongo tango etanaka
35(Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene
36Ezali bokundoli тропа bato
37Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima
38Molimo nyoso akozua oyo asalaki
39Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi)
40(Bakozalaka) na lola bakomitunama
41(Mpona) batomboki
42Eloko nini ekotisi bino na saqar
43Bakolobaka: Tozalaki kosambela te
44Mpe tozalaki koleisa babola te
45Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe
46Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te
47Kino liwa liyelaki biso
48Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te
49Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo
50Bakomi lokola humuru ya kopanzana
51Tango bazali kokima nkosi
52Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba
53Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te
54Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli
55Oyo alingi akanisa
56Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath