Lingomba ya Islam
zonga

73. Al-Muzzammil azali moto ya mayele

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Eh yo (Muhammad) mofiniki bilamba

2Telema mpo (osambela) butu mobimba, longola sé mwa tango moke

3Kati kati na yango to moke

4To bakisa yango mpe tanga kurani malembe mpe polele

5Tokokitisela yo maloba ya kilo (ya lokumu penza)

6Kosambela na butu ezali malamu mpe epesaka makasi, mpe ezali malamu mingi тропа botangi

7Mpo ete ya soló, ozali na misala ebele na moyi

8Mpe kanisa nkombo ya Nkolo nayo mpe mipesa naye

9Nkolo ya moniele mpe eloli, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, zúa ye mobateli (wa bino)

10Kanga motema na maye bazali koyebisa yo, mpe mitiya mosika na bango na lolenge ya malamu

11Мре tika ngai na baye bazuaka manso na lokuta baye bazali kosepela na bisengo na bango, bazali sé na tango moke ya kozela

12Ya soló, tobombeli bango singa ya monene mpe lifelo

13Mpe bilia ya solo mabe, mpe etumbu ya makasi

14Mokolo oyo mabele na bangomba bikoningana, mpe bikokoma lokola mputulu ya zelo ya kopanzana

15Ya soló, totindelaki bino motindami, azala nzeneneke epai ya bino, lolenge moko totindaki motindami epai ya falo

16Mpe falo aboyaki kotosa motindami mpe tozuaki ye kozua moko ya mabe

17Ndenge nini bokomibatela na bopengwi na mokolo oyo ekokomisa bana lokola bampaka suki mpembe

18Likolo likopasukaka (na somo wana) mpe akokokisaka elaka naye, wana ezali na tembe te

19Ya sólo, oyo ezali bokundoli, oyo alingi, azua nzela epai na Nkolo naye

20Ya soló, Nkolo nayo (Muhammad), ayebi ete otelemaka na nsé ya mibale ya misato ya butu, mpe kati kati na yango, mpe moko ya misato na yango, elongo na ndambu ya bandimi batelemaka mpe lokola. Allah azali kokabola butu na mokolo, ayebi ete bokokoka kotanga yango te yango ayambi tubeli na bino. Kasi botanga oyo ezali mpete kati na kurani, ayebi ete kati na bino bato ya bokono bakozala, basusu bakotambola тропа koluka bolamu ya Allah, mpe basusu bakokende kobunda na nzela ya Allah. Botanga oyo ezali mpete kati na yango, mpe botelemisa losambo mpe bofuta zakat mpe bokotisa Allah nyongo ya malamu. Mpe bolamu nyoso bokosala, bokokuta yango epai na Allah, azali malamu mpe monene na kofuta, mpe bosenga Allah bolimbisi. Ya sólo, Allah azali molimbisi atonda ngolu

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath