72. Al-Jinn, oyo azali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Loba: Emoniseli ekitela ngai ya soló ete: Lisanga moko ya bilima batiaki matoyi тропа koyoka mpe balobaki ete: Ya sólo, toyoki buku ya lokumu na etangeli ya somo
2Ezali kokamba na nzela ya semba mpe tondimaki na yango, mpe tokosangisa Nkolo wa biso na eloko mosusu te
3Ya sólo, bonene naye Nkolo ya biso ekumama, azali na mwasi te, mpe mwana te
4Mpe ya sólo, ye (satana) azali koloba mabe тропа Allah
5Mpe tokanisi ete: Bato na bilima bakoki kokosela Allah te
6Mpe ya sólo, Kati na bato, ezali na mibali misusu bazali koluka libateli epai ya bilima ya mibali, kasi yango ezali kobakisela bango sé mpasi
7Mpe bakanisaki lolenge bokanisaki été Allah akosekwisa moto te
8Мре ya soló tomataki na mapata тропа koluka koyokamela, kasi tokutaki yango na babateli ya makasi mpe minzoto ya moto (mizali kobamba na mbangu mingi)
9Мре tozalaki kofanda mpe koyoka, kasi oyo akoyokamela sika oyo akokutana na masasi ya moto (minzoto) ekobengana ye
10Mpe ya sólo, toyebi te soki bazali kolingela bato ya mokili mabe to Nkolo na bango alingi kotiya bango na nzela ya semba
11Mpe kati na biso tozali na baye ya malamu mpe basusu bazali mabe, mpe tokabwanaki na mangomba ebele
12Mpe ya sólo, tokanisaki été tokokutola nguya ya Allah awa na nsé te mpe lisusu ete tokosilisa nguya naye te na kokima
13Mpe ya sólo, tango toyokaki bokambi, (kurani) tondimaki na yango, mpe oyo akondima na Nkolo naye, abanga te тропа bokutolami ya lifuta naye, mpe akobebisama te
14Mpe kati na biso, tozali na baye bazali bamizilima mpe na baye bazali babubi mpe baye bayambaki islam nde baye balukaki nzela ya semba
15Kasi тропа babubi, bakozala na moto ya lifelo ya bakoni oyo ezali kopela
16Soki bamitiyaka na nzela ya malamu, tolingaki komelisa bango mayi ya malamu
17Mpo tomeka bango kati na yango. Kasi oyo akoboya bokundoli ya Nkolo naye, akosukisa ye na nzela ya etumbu oyo ekosilaka te
18Mpe ya sôló, ba Masâdjid bizali тропа Allah, kasi bobondela eloko mosusu elongo na Allah te
19Mpe tango mowumbu ya Allah atelemaki тропа kosambela ye, bayaki ebele kotelema pembeni naye (tango wana nde bilima bandimaki na kurani esantu tango etangamaki)
20Loba: Nazali kobondela Nkolo na ngai mpe nakosangisa ye na eloko mosusu te
21Loba: Ya sólo, ngai nazali na bokoki ya kosala bino mabe to kotiya bino na nzela ya semba te
22Loba: Ya soló, moko te akobatela ngai na botiki Allah, mpe nazui ekimeli mosusu te na botiki Allah
23(Nazali se) momemi sango mpe kokomisa liloba ya Allah. Mpe oyo akozanga kotosa Allah na motindami naye, ya solo akozala na moto ya lifelo libela na libela
24Kino bakomona oyo elengelami тропа bango ya etumbu, тре bakoyeba ba nani bazali па lisungi ya makasi, mpe ba nani bazali mike
25Loba: Nayebi te maye balaki bino ezali pene to Nkolo na ngai atikeli yango tango molai
26Moyebi ya mabombami, mpe moko te ayebi mabombami naye
27Longola sé oyo akosepela naye lokola motindami, mpe akotiela ye bakengeli liboso na sima naye
28Mpo bayeba été bakomisa maloba ya Nkolo na bango, mpe azingi maye bazali na yango, mpe ayebi motango ya biloko nyoso
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath