71. Nooh
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Ya soló totindaki Nûh epai ya bato naye ete: Kebisa bato nayo yambo ya etumbu makasi eyela bango
2Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino
3Bobondela Allah, bobanga ye тре botosa ngai
4Mpo alimbisa bino masumu тре apesa bino mikolo kino elaka yango ekoka. Ya soló, tango elaka ya Allah ekoki ezelaka te soki bozali koyeba
5Alobi: Nkolo! Ya sólo, natei bato na ngai butu na moyi
6Kasi mateya na ngai ebakiseli bango sé kokima
7Mpe tango nazali kobenga bango mpo olimbisa bango, bazali kotiya misapi na matoyi na bango mpe kozipa yango na bilamba, basali motu makasi mpe lolendo
8Sima nabengaki bango na polele
9Mpe nayebisaki bango na polele mpe na lolenge ya kobombama
10Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi
11Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana
12Mpe apesa bino misolo na bana ebele, mpe abómbela bino bilanga mpe mingala
13Mpona nini bozali kokumisa Allah te na ndenge esengeli
14Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama
15Bozali kornona te lolenge Allah akela mapata sambo elandani
16Mpe atiya bongengi kati ya sanza mpe mwinda okati ya moyi
17Allah nde abimisa bino na mabele lokola milona
18Sima akozongisa bino kati na yango mpe sima akobimisa bino penza
19Allah atandela bino mabele ezala lokola etoko
20Mpo botambola na kati ya banzela na yango
21Nûh alobaki ete: Nkolo! Baboyi kotosa ngai kaši balandi sé moto oyo bozui naye na bana ekobakisela ye sé libungi
22Mpe basali likita ya monene, (ya mabe)
23Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)
24(Mpe) yango bisili kobungisa ebele mpe ezali kobakisela babubi sé libungi
25Mpona mabe na bango, bazindisamaki na mayi, mpe bakotaki na móto, mpe bazuaki basungi te na botiki Allah
26Mpe Nûh alobi: Nkolo! Kotika ata mopagano moko te na mokili
27Soki otiki bango (na bomoyi), bakobungisa bawumbu nayo mpe bakobota sé basumuki
28Nkolo! Limbisa ngai, na baboti na ngai na moto nyoso oyo akokota ndako na ngai mondimi mpe bandimi ya mibali na ya basi, mpe kobakisela bapengwi te sé libungi
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath