70. Al-Ma'aarij azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Mosengi azali kosenga etumbu oyo ekozanga kokweya te
2Ekopekisama te mpo ekwela bapengwi
3Epai ya Allah nde nzela ya komata mpe kokita ezali
4Ba anzelu mpe molimo mosantu bazali komate epai naye na mokolo moko oyo tango na yango ezali kowumela lokola mibu nkoto ntuku mitano
5Zela bozeli ya malamu
6(Bapengwi) bazali kornona yango mosika
7Kasi tozali kornona yango pembeni
8Mokolo oyo likolo likopelaka lokola ebende ya mafuta
9Mpe bangomba bikokoma lokola elamba ya kofinika
10Molingami akotuna moninga te
11Bazali kotalana, moto mabe akoluka ete akaba bana naye mpo abatelama na etumbu ya mokolo wana
12To mwasi, to ndeko naye ya mobali
13(Ata soki bayei) moto naye ya libota oyo azalaki kobatela ye
14Ata bayei na manso mazali na nsé тропа kobatela ye
15Eloko te, ezali nde moto
16Ekolongola ye bamposa ya mutu na makasi
17Moto ekobengaka baye baboyaki kondima
18(Kolandana) na misolo oyo asangisaki na mokili mpe apekisaki na yango nzela ya Allah epanzana
19Ya soló, moto akelamaki na kozanga kimia
20Soki mabe ezui ye, akomi na bobangi
21Mpe soki bolamu ezui ye, akomi kopima yango
22Longola sé baye bazali kotelemisa losambo
23Baye bakangami na losambo na bango libela
24Мре baye bazali kobimisa (zakat) na misoio mia bango
25Mpona (kopesa) basengi na baye bazangi
26Mpe baye bazali kondima ya soló na mokolo ya suka
27Мре baye bazali kobanga etumbu ya Nkolo na bango
28Ya soló, eloko moko ya kopekisa etumbu ya Nkolo na bango ezali te
29Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango
30Longola sé epai ya basi na bango to mpe bawumbu na bango ya basi, wana ezali lisumu te epai na bango
31Kasi baye bakokende libanda ya oyo etindami awa, bango nde balekisi ndelo
32Mpe baye bazali kobatela biloko ya bato malamu, mpe bazali kotosa maloba na bango tango ya boyokani
33Mpe baye bazali kotatola sé bosóló
34Mpe baye oyo bazali kobatela losambo na bango
35Bango nde bakozala na lukumu okati ya bilanga ya lola
36Kasi nini na bapengwi oyo bazali kokima epai nayo bakingo etelemi
37Ngambu ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi bazali ya kokabwana
38Boye moko na moko kati na bango azali kosepela ete bakotisa ye na lola ya nkembo
39Eloko te, mpo tokelaki bango na maye bayebi
40Mpe nalapi na Nkolo ya miniele mpe biloli na bilembo bia ngrásia ete: Ya soló, tozali na makoki
41Mpo ete tolongola bango toya na baye ya malamu, mpe moto akopekisa biso azali te
42Tika bango basakana mpe babunga kino bakokutanaka na mokolo oyo tolakaki bango
43Mokolo bakobima na malita noki lokola bazali kokima mbangu epai na mabanga matandami
44Bakokitisaka miso na bango mpe kotombola yango na soni, wana ekozalaka mokolo ya elaka na bango
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath