Lingomba ya Islam
zonga

68. Al-Qalam, oyo ezali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nún, (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma

2Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te

3Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te

4Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu

5Yo okomona mpe bango bakomona

6Nani kati na bino amekami

7Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami

8Kaši kotosa bato ya lokuta te

9Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo

10Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te

11Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo

12Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu

13Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo

14Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)

15Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala

16Tokomonisa elembo naye likolo na zolo

17Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo

18Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)

19Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala

20Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te

21O mokolo molandi: Babiangani bango na bango

22Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma

23Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende

24Mobola moko te akotela bino lelo na elanga

25Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola

26Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso

27То yango; Kasi tozali na eloko te

28Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah

29Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe

30Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe

31Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki

32Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso

33Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba

34Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko

35Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki

36Boni bozali kokata likambo na lolenge wana

37To boye bozali na buku eye bozali koyekola

38Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga

39To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi

40Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango

41To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló

42Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te

43Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili)

44Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te

45Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló

46То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene

47To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота

48Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene

49Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka

50Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu

51Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma

52Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath