64. Na-Taghaabun, oyo azali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1(Biloko) nyoso ezali na likolo mpe na nsé ezali kokumisa Allah, bokonzi bozali ya ye, mpe matondo mazali ya ye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso
2Ye nde akela bino, basusu okati na bino bandimi, mpe basusu bapengwi. Allah azali kornona maye bozali kosala
3Akela likolo na mabele na bosôló, mpe apesi bino lolenge, mpe abongisa bokeli bwa bino, mpe bokozongaka sé epai naye
4Ayebi nyoso oyo ezali na likolo na oyo ezali na mabele, mpe ayebi maye bobombaka na maye bomonisaka polele. Mpe Allah ayebi oyo ebombami okati ya mitema
5Boye sango ya baye bapengwaki liboso na bino ekomelaki bino te bamekaki (etumbu na mokili) mpe bamonaki oyo bamonaki тропа makambo na bango, mpe bakozala na etumbu ya makasi
6Wana ezali mpo ete batindami na bango baydaki bango bosembo ya polde, kasi bazongisaki eyano ete: Moto nde akoya kokamba biso? Мре bapengwaki mpe bapesi mokongo, mpe esalaki Allah eloko te. Mpo ete Allah azali wa bomengo atonda lokumu
7Bapagano bakanisi ete bakosekwisama te, Loba: Na nkombo ya Nkolo na ngai bokosekwisama mpe bokozua sango ya maye bosalaki. Мре kosala bongo ezali mpasi te тропа Allah
8Mpe bondima na Allah тре bondima na motindami wa ye, mpe bongengi oyo tokitisaki yango (kurani). Mpe Allah ayebi maye bozali kosala
9Mokolo akosangisa bino о mokolo ya lisekwa, wana ekozala mokolo ya bozangi bonene, kasi oyo akondima na Allah mpe asali misala milamu, (Allah) akolimbisa mabe naye mpe akokotisa ye na lola oyo ezali kolekisa mingala o nsé na yango, akovandaka kuna libela na libela. Wana ekozala elonga enene
10Kasi тропа baye bapengwaki mpe baboyaki kondimela mikapo mia biso, bango nde bato ya moto mpe bakozalaka kuna libela na libela, kasi bozongi ya mabe nini wana
11Likama moko te ekokwela moto sé ezala na ndingisa ya Allah, kasi oyo akondimela Allah, (Allah) akokamba motema naye. Мре Allah azali na boyebi ya eloko nyoso
12Botosa Allah mpe botosa motindami (wa ye). Kasi soki boboyi boyeba ete motindami wa biso azali na eloko te sé akomisa nsango ya polele
13Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye. Mpe epai ya Allah esengeli na bandimi bamikaba
14Eh bino bandimi! Ya soló, kati na basi mpe bana na bino bazali banguna na bino, bokeba na bango. Mpe soki boyoki (bango) mawa, botiki mpe bolimbisi (bango), ya sólo Allah azali molimbisi atonda ngolu
15Ya sólo, misolo na bana na bino ezali mimekano, mpe epayi na Allah nde lifuta linene lizali
16Mpe bobanga Allah na bokoki na bino, mpe boyoka mpe botosa mpe bobimisa (тропа Allah) ezali malamu тропа bino moko, mpe oyo akomibatela mosika na moyimi naye, ba oyo wana nde balongi
17Soki bokotiseli Allah nyongo ya malamu akobakisela bino ebele, mpe akolimbisa bino, mpe Allah azongisaka matondi atonda mawa
18Ayebi maye mabombami na maye mazali polele (azali) wa bokasi atonda bwanya
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath