Lingomba ya Islam
zonga

59. Al-Hashr, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nyoso oyo ezali na likolo na mabele ezali kokumisa Allah, mpe azali wa bokasi atonda bwanya

2Ye nde abimisaki bapengwi baye bazua buku na bandako na bango na bobimisami ya liboso. Bokanisaki te ete bakobima, mpe bakanisaki ete bozui na bango ekobatela bango liboso ya Allah, mpe Allah abimelaki bango na epai oyo bazalaki kolikia te, mpe akotisaki kobanga na mitema mia bango. Babukaki bandako na bango bango moko, mpe na maboko ya bandimi, bososola na yango liteya, eh bato ya mayele

3Soki ezalaka elaka oyo Allah akomela bango te, mbele topesaki bango etumbu ya makasi na mokili, mpe o mokolo ya suka bakozalaka na etumbu ya moto

4Wana mpo ete: Batiaki tembe na Allah na motindami naye. Мре oyo akotia tembe na Allah, ya soló Allah azali makasi na bopesi etumbu

5Nzete ya línat nyoso oyo bokataki, na oyo botikaki ya kotelema ezali sé na bolingi ya Allah, mpe mpo Allah afuta bato ya mabe

6Biloko na bango oyo batikaki, mpe Allah apesaki yango epai ya motindami naye na bitumba te, mpe bobimisaki punda te, ebwele moko mpe te, kasi Allah apesaka elonga na batindami naye likolo ya nani alingi. Mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

7Bozui ya banguna oyo Allah apeși motindami naye na bitumba, ezali тропа Allah na motindami naye, mpe тропа libota, mpe bana bitike na babola mpe na moleki nzela, (oyo azangi) mpo ete bozui yango etambola kaka te kati na bino bai bomengo. Mpe oyo motindami Ayeli bino bozua yango. Mpe oyo apekisi bino botika. Mpe bobanga Allah, ya sólo, Allah azali makasi na bopesi etumbu

8Mpona babola baye bakimaki batiki bandako na bango na bomengo na bango тропа koluka bolamu epai na Allah na bosepeli naye, тре basalisaki Allah na motindami naye. Bango wana nde bazali bato ya bosembo

9(Mpe basusu) baye bavandaki liboso na mboka, mpe nakati ya bondimi, balingaki baye bakimaki epai na bango, bazalaki na mpasi токе te na mitema mpona koyamba bango na maye bapesaki bango, mpe balingi bango koleka banzoto na bango moko ata bazali na bozangi ya koleka, oyo akomibatela na moyimi ya nzoto naye moko, bango nde bazali na elonga

10Mpona baye bayaki sima na bango, bazali koloba: Nkolo limbisa biso na bandeko na biso oyo bandima liboso na biso, mpe kobebisa mitema mia biso te mpona baye bandima, Nkolo na biso ozali moyoki otonda ngolu

11Boye ozali kornona te mpona baye bazali koloba na bandeko na bango baye bapengwa kati na bato ya buku: Soki babengani bino, tokokende elongo na bino mpe tokotosa moto te sé bino, mpe soki babundisi bino, tokosalisa bino, Ya soló, Allah ayebi ete bazali bato ya lokuta

12Soki babenganami, bakolanda bango te, mpe soki babundisami, bakosalisa bango te, ata soki bakendaki kosalisa bango bakosuka sé na kokima, sima bakosungama te

13Mpe bazali na kobanga mingi na mitema тропа bino koleka Allah, mpo ete bazali bato oyo bayebi kososola te

14Bakobundisaka bino mobimba te, sé babendani bendani na bamboka ya mike mike biye bibatelami, to mpe sima ya mapango, kimonguna kati na bango na bango ezali makasi, okomona bango ete bazali ya kosangana nzoka nde mitema na bango mizali ya kokabwana, wana mpo ete bazali na mayele te

15Bazali lokola na baye bazali liboso na bango kala te, bamekaki maye bazalaki kosala, kasi bakozuaka etumbu ya makasi

16Bazali lokola satana tango alobaka na moto ete: Pengwa, mpe soki moto apengwi, alobi naye: Ya soló, nawangani yo. Ya sólo nazali kobanga Allah Nkolo ya mokili

17Mpe esukelaki bango ete: Bango nyoso mibale bakozalaka na moto libela kati na yango. Wana nde ekozala lifuta lia babubi

18Eh bino bandimi! Bobanga Allah, moto nyoso atalisa molimo naye eloko nini esili kolengele тропа lobi, тре bobanga Allah. Ya sólo, Allah ayebi maye bozali kosala

19Mpe bozala lokola baye babosana Allah te (Allah) asali ete bamibosana bango moko. Bango nde bato mabe

20Bato ya moto mpe bato ya lola bakozalaka lolenge moko te. Kasi bato ya lola nde balongi

21Soki tokitisaka kurani oyo likolo ya ngomba olingaki kornona yango ezali kopasuka na bobangi Allah, tozali kobete bandakisa wana тропа bato bakoka kokanisa

22Ye Allah oyo nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye, moyebi ya mabombami na maye mazali polele, ye wa ngolu atonda boboto

23Ye Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye, mokonzi mosantu, azali kimia mobateli, akonza kala, azali nguya, azali sukisa, atonda lolendo, nkembo na Allah wa likolo na maye bazali kosangisa ye na yango

24Ye Allah mokeli,mopesi eloko nyoso lolenge na yango, azali na bankombo kitoko, maye mazali о likolo mpe na nsé mazali kokumisa ye, тре ye azali na nguya atonda bwanya

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath