56. Al-Waaqia ezali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Tango likambo monene ekokweya
2Koya na yango ezali lokuta te
3Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)
4Tango mabele makoninganaka makasi
5Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike
6Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana
7Mpe bokozalaka lisanga misato
8Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali
9Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi
10Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka
11Baye wana nde bakozalaka pene na Allah
12O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu
13Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso
14Мре moke okati ya bato ya sima
15(Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo
16Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia)
17Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela
18Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli)
19(Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te
20Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka
21Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi
22Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala
23Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga
24Lifuta тропа maye basalaki
25Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te
26Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia
27Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali
28Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr
29Na banzete ya makemba na bitabe
30Na nsé ya malili ya monene
31(pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela
32Mpe bambuma ebele
33Babuki yango te mpe epekisami te
34O likolo lia bambeto ya likolo
35Biso nde tokelaki bango na bokeli
36Mpe tosalaki bango bayebi mibali te
37Bazali bambula ndenge moko
38Mpona bato ya loboko ya mobali
39Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso
40Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka
41Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana
42Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka
43Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo
44(kati na yango) malili te mpe kitoko te
45Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko
46Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi
47(Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu
48Na bankoko ya biso ya yambo
49Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka
50Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani
51Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka)
52Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm
53Mabumu na bino makotondaka na yango
54Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi
55Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso)
56Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka
57Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te
58Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo
59Bino nde bokela yango to biso nde bakeli
60Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te
61Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te
62Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te
63Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)
64Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni
65Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)
66Tala biso tokomi na banyongo
67Kasi bapimeli nde biso
68Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela
69Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi
70Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah)
71Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te
72Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli
73Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)
74Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene
75(Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka
76Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka
77Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu
78Ebatelami kati na buku
79Basimbaka yango te sé na bapetoami
80Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili
81Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta
82Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani
83Tango mpema ekomata tii na mongongo
84Mpe tango wana bozali kotala
85Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te
86Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te)
87Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo
88Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah)
89(Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo
90Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali
91(Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali
92Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi
93Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi
94Mpe akozikisama okati ya moto
95Wana nde likambo ya soló
96Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath