55. Ar-Rahmaan azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Ar-Rahmân
2Atangisaki kurani
3Akela moto
4Atangisa ye koloba polele
5Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama
6Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango)
7Мре atombola likolo mpe atiyela emekeli
8Mpo ete bolekisa ndelo te na emekeli
9Mpe bopesa kilo na bosembo, kasi bobebisa emekeli te
10Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi
11Okati na yango, okokuta bambuma na ba nagh’l ekangama
12Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi
13Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima)
14Akela moto na mabele ya potopoto lokola mb eki
15Mpe akela bilima kowuta na moto ezanga milinga
16Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
17Nkolo ya moniele mibale mpe Nkolo ya biloli mibale
18Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
19Atika bibale mibale bileka na bokutani
20Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te
21Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
22Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga)
23Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
24Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba
25B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
26Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi)
27Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto
28Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
29Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika
30Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
31Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)
32Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
33Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah)
34Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
35Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te
36Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
37Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané
38Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
39O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango
40Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
41Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango
42Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
43Oyo nde lifelo тропа batomboki oyo batiyaki tembe na yango
44Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi
45Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
46Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola)
47Bolamu nini y a Nkolo na bino oyo bozali koboya
48Okati na yango ezali na bolamu mibale
49Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
50O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola
51Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
52O kati na yango okokuta bambuma mibale mibale
53Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
54Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka
55Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
56Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango
57Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
58Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga
59Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
60Boye bolamu efutamaka te sé na bolamu
61Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
62Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso
63Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
64Bizali na langi ya mpondu ya moyindo
65Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
66Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi
67Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
68Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l na rummân
69Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
70Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu
71Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
72Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma
73Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
74Mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango
75Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
76Bakoyekama na bikata ya langi ya pondu na bitoko ya kitoko
77Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya
78Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath