Lingomba ya Islam
zonga

54. Al-Qamar, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Ngonga epusani mpe sanza epasuki

2Mpe soki bamoni elembo bazali koboya mpe balobi ete: Oyo ezali bonganga ya makasi

3Mpe baboyi kondima balandi makambo na bango moko, nzoka nde likambo nyoso lizali na suka na yango

4Mpe basango bisilaki koyela bango, basango ya kopekisa bango (mabe)

5Wana ezali bwanya (bolamu), kasi makebisi esali bango eloko te

6Mitiya mosika na bango, mokolo oyo mobengi akobengaka epai (ya likambo) linene

7Bakobima na malita bilongi ya kokitisama, bakopanzana lokola bamakonko

8Bakokamata bango kokende mbangu epai ya molobeli, bapagano bakoloba ete: Oyo ezali mokolo ya mpasi mpe mindondo

9Bato ya Nûh bagangaki na lokuta liboso na bango, baboyaki kondimela mowumbu na biso mpe balobaki ete: Oyo azali ligboma mpe bamitiaki mosika naye

10Abengaki Nkolo wa ye (alobi): Ya soló nazali na bokoki te, sunga ngai (na bokasi bwa yo)

11Мре tofungolaki bizibeli ya likolo mayi ebele

12Мре topanzaki mabele na miluka mpe mayi makutanaki na mobeko oyo etiyamaki

13Mpe tomemaki ye na mabaya na sete oyo esalaki masuwa

14Etambolaki na miso na biso,mpe tofutaki baye baboyaki kondima mbano na bango

15Mpe totikaki yango ezala elembo, boye moto azali kaka kokanisa te

16Lolenge nini etumbu na makebisi na ngai ezalaki

17Mpe tosilaki kotia kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa

18Ba Aad, baboyaki kondimela (bantoma na bango), boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni

19Ya soló, totindelaki bango mopepe ya makasi koleka ya kozongelama

20Ezali kopikola bato lokola biteni ya nagh’l oyo bapikoli

21Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni

22Мре tosilaki kotiya kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa

23Ba Thamúd baboyaki kondimela makebisi

24Mpe balobaki: Tolanda sé moto moko okati na biso? Noki te tokobunga mpe tokokweya na mabe

25Boye baponaki ntoma sé ye kati na biso nyoso? Te; azali sé moto ya lokuta mpe lolendo monene

26Bakoyebaka lobi: Nani atondi na lokuta mpe lolendo

27Ya sólo, totindelaki bango náqah lokola ekamwiseli mpe komekama, kengele bango mpe kanga motema

28Mpe yebisa bango été mayi ekabuani na biteni mibale kati na bango, bakozala na ntango na bango ya komela, ye mpe na ngonga naye

29Мре babengaki moninga na bango azui mbeli babomi ye mpe basasi ye

30Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni

31Ya soló, totindelaki bango bogangi moko, mpe bango wana bakomi lokola banzete ekawuka

32Mpe tosilaki kotiya kurani ezala pete тропа bokundoli, boye moto azali te тропа kokanisa

33Bato ya Loth baboyaki kondimela makebisi

34Ya sólo, totindelaki bango mopepe ya makasijongola sé libota lia Loth liye tobikisaki ye yambo tongo etana

35Na bolamu kowuta epai na biso. Lolenge wana nde tofutaka oyo azali kotondo (Allah)

36Mpe asilaki kokebisa bango тропа etumbu na biso, kasi bazangaki kondimela makebisi

37Mpe balingaki kokweisa bapaya naye, kasi tokangaki miso na bango, bomeka etumbu na ngai na makebisi na ngai

38Мре etumbu ya makasi ezuaki bango na ntongo

39Bomeka etumbu na ngai mpe makebisi na ngai

40Mpe totiyaki kurani ezala pete тропа bokundoli,boye ezali na moto te ya kokanisa

41Mpe ya soló, makebisi makomelaka bato ya falo

42Baboyaki kondima na bilembo bia biso nionso, mpe tozuaki bango na bozwi ya oyo azali na nguya atonda makoki

43Boye bapengwi na bino bazali malamu koleka ba oyo kuna? То ezali na eloko ya kobatela bino okati ya makomi

44Bazali koloba: Tozali lisanga (makasi) tokolonga

45Lisanga na bango ekopanzana mpe bakokima

46Ngonga moko ya mpamba nde elaka na bango, mpe yango ezali nsomo mpe bololo

47Ya soló batomboki bazali na libungi mpe na kati ya moto

48Mokolo oyo bakobendamaka na bilongi na bango okati ya moto, bomeka etumbu ya lifelo

49Ya soló, tokelaki biloko binso na bokoki

50Mpe mitindo mia biso mizalaka sé liloba moko, ezali sé lokola kobuka liso

51Mpe tosilaki koboma bato liboso lokola bino, boye ezali na moto yakokanisa te

52Mpe biloko binso biye bisalama bisila kokomama kati na (buku)

53(Biloko) nyoso, ezala ya moke to ya monene ekomama

54Ya sólo, babangi (Allah) bakozalaka na kati ya lola mpe mpene ya mingala ezali koleka na nsé na yango

55Mpe esika ya bosembo yakofanda pene na mokonzi wa bokoki (Allah)

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath