Lingomba ya Islam
zonga

53. An-Najm, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Na monzoto tango ekweyaka

2Moninga na bino abungi te mpe akosami te

3Mpe azali koloba makambo na makanisi naye te

4Ezali sé emoniseli ezali kokitela ye

5(Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango

6Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu

7Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka

8Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka

9Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango

10Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki

11Motema ekosaki te oyo emonaki

12Boye bokoboyela ye na oyo amonaki

13Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale

14Pene na sidr muntaha

15Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami

16Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango

17Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote

18Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye

19Bopesa ngai sango ya Láta na Uzza

20Mpe mosusu ya misato Manáta

21Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi

22Wana ezali bokaboli ya mabe

23Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango

24To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa

25Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah

26Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli

27Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, bapesi ba anzelu bankombo ya basi

28Kasi bazali na boyebi te, bazali sé kolanda makanisi. Mpe makanisi esalaka bosembo eloko te

29Mitiya mosika na oyo akoboya bokundoli bwa biso, mpe bazali sé kolinga bomoyi ya mokili

30Kuna nde esika mayele na bango ekendeke. Ya sólo, Nkolo nayo ayebi malamu nani abungi nzela naye, mpe ayebi nani oyo akambami

31Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango

32Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza

33Omoni te oyo azali kopesa mokongo

34Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa

35Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona

36To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa

37Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka

38Moto moko te akomema lisumu ya moninga

39Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye

40Mpe ya sólo, molende naye ekomonana

41Sima, akofutama mpenza malamu

42Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo

43Mpe ye nde asekisaka mpe alelisaka

44Мре ye nde abomaka mpe apesaka bomoyi

45Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali

46Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango

47Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye

48Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola

49Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ

50Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad

51Na Thamûd, moko atikala te

52Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo

53Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth)

54Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi

55Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe

56Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo

57Ngonga esili kobeleme

58Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah

59Boye bozali kokamwa na masolo oyo? (kurani)

60Mpe bozali koseka na esika ya kolela

61Kasi bozali sé kosakana

62Bogumbama тропа Allah mpe bobondela (ye)

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath