Lingomba ya Islam
zonga

51. Adh-Dhaariyat oyo azali na likambo yango

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1(Nalapi) na mipepe miye mipanzaka

2Mpe na bamemi mikumba (ya mapata)

3Mpe na ba masuwa ezali kotambola likolo ya mayi

4Mpe na bakaboli, kolanda na mibeko

5Ezali solo oyo balaki bino

6Mpe ya sôló, mokolo ya suka ekoya

7Mpe na likolo oyo ezali na banzela bipasolama malamu

8Ya sólo, bozali na bokeseni na maye bozali koloba

9Oyo aboyi yango, ezali oyo apesaki bondimi mokongo

10Bato ya lokuta basili kobomama

11В aye bazindi na molangwa ya mokili

12Bazali kotuna тропа mokolo ya suka ekozala tango nini

13Mokolo oyo bakomekama na moto

14Вотека bomekami ya bino (etumbu) mpo bozalaki koluka yango na lombango

15Ya soló, babangi bakozalaka na lola oyo ezali na miluka

16Bakozuaka oyo Nkolo wa bango akopesa bango. Ya sólo, bazalaki liboso na yango bato ya malamu

17Bazalaki kolala токе na butu

18Мре yambo tongo etana bazalaki kosenga bolimbisi

19Mpe na bomengo na bango oyo bazalaki kopesa epai na mosengi mpe mozangi

20Mpe bilembo biye bizali okati na mokili bizali тропа baye bazali kondima na bosóló

21Mpe kati na bino moko, boye bozali kornona te

22Mpe bozui na bino, na maye bolakelama mazali olikolo

23Na Nkolo ya likolo na nsé, ezali ya sólo bosembo, ndakisa ya maye bozali kolobela

24Boye sango ya bapaya ya Ibrâhîm ya lokumu ekomelaki yo

25Tango bakotaki epai naye, balobi: Kimia (ezala nayo); ayanoli: Kimia mpe ezala likolo lia bapaya oyo bayebani te

26Мре akendaki malembe epai ya libota naye mpe amemelaki bango ngombe ya mafrita ya kotumba

27Mpe apusi yango pene na bango alobi: Bokolia te

28Mpe abangi bango, balobi: Kobanga te, mpe bapesi ye sango ya kobotama ya mwana ya mobali oyo atondi na bwanya

29Mwasi naye akei azali koganga mpe na komikwanza elongi naye, alobi: Mobange mpe ekomba lokola ngai, nabota ndenge nini

30Balobi: Lolenge wana nde Nkolo nayo alobi. Ya soló, ye azali moyebi atonda na bwanya

31(Ibrâhîm) alobi: Oh batindami! Boyeli nini

32Balobi: Ya sólo, totindami тропа batomboki

33Mpo tobwakela bango mabanga ya mabele ya makasi

34Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu

35Мре tobimisaki bandimi okati na bango

36Мре tokutaki sé ndako moko ya mpamba ya baye bamisokia

37Mpe totikaki elembo тропа baye bazali kobanga etumbu makasi

38(Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele

39Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma

40Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe

41Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)

42Ezalaki kotika eloko moko te oyo ezuaki yango na nzela kino ekomisaki yango putulu

43Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke

44Bazangaki kotosa mibeko mia Nkolo wa bango kino etumbu ezuaki bango bazali kornona

45Kaši bakokaki komitelemisa te, mpe bamilongisaki te

46Mpe lolenge moko ezalelaki bato ya Nûh liboso. Ya soló, bazalaki bato mabe

47Mpe totongaki likolo na bokasi na biso, mpe (totiyaki yango ezala) monene

48Mpe totandaki mabele, mpe oyo lolenge kitoko ya etando

49Mpe tokelaki biloko nyoso mibale mibale, mpo bokoka kokanisa

50Bokima epai ya Allah, nazali sólo mokebisi ya polele тропа ye

51Kasi botiela Allah nzambe mosusu te. Ya soló nazali mokebisi ya polele тропа bino kowuta naye

52Ezali boye. Mpe motindami moko te ayaka epayi na bato ya yambo sé baloba oyo azali nganga to azali moto ya ligboma

53Boye bazuaki lotomo yango te? Nzoka nde bazalaki nde balekisi ndelo

54Mitiya mosika na bango, bakogangela yo te, (тропа bango)

55Мре kundola, ya sôló bokundoli esalisaka bandimi

56Мре nakelaki bilima na bato te sé тропа kobondela ngai

57Nalukaka bozui epai na bango te, mpe nalukaka baleisa ngai te

58Ya sólo, Allah nde mopesi monene ya bozui, Nkolo bokasi koleka

59Kasi ya sólo, baye babubaki bakozua etumbu kokokana na biteni ya baninga baye babubaki, na yango, bawelisa yango te

60Mabe ekozala epai ya bapengwi o mokolo oyo balakaki bango

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath