48. Al-Fath, oyo azali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Ya soló, topesaki yo elonga moko ya monene
2Mpo Allah alimbisa masumu nayo oyo eleka na oyo ekoya sima, mpe mpo akokisela yo bolamu mpe akamba yo о nzela ya semba
3Mpo ete Allah apesa yo lisungi ya makasi
4Ye nde akitisaka kimia о mitema mia bandimi mpo ebakisela bango kondima likolo ya kondima na bango, mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya
5Mpo akotisa bandimi ya mibali na ya basi okati ya Iola oyo ezali koleka na nsé na yango míngala, bakozalaka libela kati na yango, mpe bakozimisa masumu na bango. Mpe wana ekozala elonga monene epai ya Allah
6Мре apesa etumbu na bato ya bilongi mibale ya mibali mpe ya basi baye bazali kosalela Allah mabe, ndenge moko mpe lokola basangisi Allah ya mibali mpe ya basi bazali kokanisela Allah mabe, makanisi yango ya mabe ekokwela bango, mpe Allah asilikeli bango, mpe alakeli bango botutu, mpe alengeleli bango lifelo. Mpe oyo bozongi ya mabe
7Mpe mapinga ya likolo na ya nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali na nguya atonda bwanya
8Ya soló totindaki yo ozala nzeneneke mpe mopesi sango malamu mpe mokebisi
9Mpo ete bondimela Allah na motindami wa ye, mpe bopesa ye lisungi mpe bopesa ye lokumu (Muhammad), mpe bosanzola ye (Allah) tongo mpe mpokwa
10Ya sólo, baye bazali kolapa epai nayo (ndayi), bazali kolapa nde na Allah, loboko ya Allah ezali likolo ya maboko na bango. Kasi oyo akobebisa, asili komibebisa ye moko, mpe oyo akokokisa elaka eye alakaki Allah, akofuta ye lifuta linene
11Okati na baye bafandaka na bamboka baye batikalaki na sima balobaki ete: Mabota mpe bozui na biso bikangisaki biso na sima, limbisa biso, bazali koloba na balolemu na bango oyo ezali na mitema mia bango te, loba: Nani azali na makoki ya kosalisa bino epai ya Allah soki alingi kopesa bino bolamu to mpasi? Kasi Allah ayebi maye manso bozali kosala
12Kasi bozalaki kokanisa ete motindami na bandimi bakozongela lisusu mabota na bango te? Lolenge babongiselaki bino na mitema mpe bozalaki kokanisa mabe, mpe bozali bato mabe
13Mpe oyo akondima na Allah na motindami naye te, ya soló tolengeli etumbu ya makasi тропа bapengwi
14Bokonzi ya likolo na ya mabele ezali ya Allah. Alimbisaka oyo alingi mpe apesaka etumbu na oyo alingi. Kasi Allah azali molimbisi atonda ngolu
15Baye batikalaki na sima bazali koloba ete: Soki bolingi kokende kozua biloko ya banguna biye basundoli, botika biso tolanda bino, balingi kobalola liloba lia Allah. Loba: Bolanda biso te, wana nde Allah asilaki koloba тропа bino liboso, тре bakoloba ete: Bosali biso nde likunya. Nzoka nde bazali na mayele токе
16Loba na bato ya mboka oyo batikali na sima ete: Kala mingi te bokobengama тро bökende kobunda na bato ya makasi, to batosa na komisokia na lingomba. Мре soki botosi, Allah akopesa bino lifuta kitoko, kasi soki bopesi mokongo ndenge bosalaki liboso, akopesa bino etumbu ya makasi
17Mabe ezali te na mokufi miso, moto ya tengu na moto ya bokono, kasi oyo akotosa Allah na motindami naye, akokotisa ye na Iola oyo ezali koleka na nsé na yango mingala, kasi oyo akoboya kotosa, Allah akopesa ye etumbu ya makasi
18Allah asilaki kosepela na bandimi tango bazuaki mokano ya kolapa liboso nayo na nsé ya nzete, mpe (Allah) ayebaki maye mazali o mitema mia bango, sima akitisaki kimia likolo na bango mpe apesaki bango elonga ya pembeni
19Мре bomengo ebele mpo bazua yango, тре Allah azali na bokasi atonda bwanya
20Allah alakaki bino bomengo ebele bokozua yango, mpe awelisaki yango тропа bino, тре alongolaki maboko ya bato likolo na bino, тре mpo ezala elembo тропа bandimi, тре akamba bino o nzela ya semba
21Мре alaki bino (bomengo) mosusu oyo bokokaki kozua yango te, kasi Allah azingaki yango na nguya. Mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso
22Mpe soki bapengwi babundisi bino, bakokima bango moko mpe bakozua lisungi te mpe mobateli te
23Wana ezali mobeko ya Allah uta kala, mpe okokuta mbongwana te na mobeko ya Allah
24Mpe ye nde alongolaki maboko na bango likolo na bino mpe alongolaki maboko na bino likolo na bango na nsé ya lubwaku ya makka, na tango oyo asilaki kolongisa bino likolo na bango. Mpe Allah azalaki kornona maye bozalaki kosala
25Bango nde bapengwi mpe bapekisaki bino kokota na masdjid esantu (ya makkah), mpe bapekisi bibwele ya mbeka ekoma na esika yango ya kosasa, soki тропа bandimi ya basi na ya mibali baye boyebaki bango te, na kati ya banguna mpe na koboma, mpe bolingaki kozua mbeba na bango na kozanga koyeba, mpo ete Allah akotisa nani alingi okati ya ngolu naye. Mpe soki (bandimi) bayebanaki, nde topesaki bapengwi kati na bango etumbu ya makasi
26Tango bapagano batiaki kanda ya kozanga koyeba o mitema mia bango, kasi Allah akitisaki kimia naye likolo na motindami naye, mpe likolo ya bandimi, mpe atindaki bango na kokangama na liloba ya bobangi Allah, mpe esengelaki na bango kokangama na yango mpo ete ezali ya bango. Mpe Allah azali na boyebi ya biloko binso
27Allah ya soló, asilaki kokokisela motindami naye ndoto na bosembo ete: Bokokota na masdjid ensatu (ya Makkah) na bolingi ya Allah na kimia nyoso, basuki na bino ya kokokolama to ya kokutolama bobanga te, mpe ayebaki maye boyebaki te. Mpe lisusu apesi bino elonga ya pembeni
28Yende atindaki motindami naye na bokambami, mpe lingomba ya soló, mpo ete ezala likolo ya mangomba manso. Мре Allah akoki lokola nzeneneke
29Muhammad motindami ya Allah, mpe baye bazali naye (bayekoli naye) bazali makasi epai ya bapengwi, bazali na mawa kati na bango. Okomona bango bazali kogumbama mpe kofukama тропа koluka ngrásia mpe bosepeli epai ya Allah, bilembo na bango bizali na bilongi na bango osima ya kofukama, wana nde lolenge na bango esila kokomama okati ya torah, ndenge moko okati ya Indjil lokola molona ewuti kobima na mabele na bonzenga na yango sima etelemi likolo na nzete na yango ezali kokamwisa baloni, mpo na makasi na bango (Allah) atumbolaka kanda ya bapagano. Allah alaki baye bandimi mpe basali malamu bolimbisi mpe lifuta ya monene
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath