Lingomba ya Islam
zonga

47. Muhammad

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Baye bapengwa mpe bazali kobundisa nzela ya Allah basili kobebisa misala mia bango

2Мре baye bandima mpe basali misala milamu mpe bandimi na maye makitaki epai ya Muhammad ete ezali soló kowuta epai ya Nkolo na bango, akolongola mabe na bango, mpe akobongisa makambo na bango

3Wana mpo ete bapengwi balandi lokuta, kasi baye bandima balandi bosembo kowuta epai na Nkolo na bango. Lolenge wana nde Allah azali kopesa másese epai ya bato

4Soki bokutani na bapengwi (na bitumba) bokata bakingo na bango, mpe soki bolongi bango, bokanga bango basinga makasi, na sima soki bolingi botiki bango bakei pamba, soki mpe bolingi bato na bango bapesa bino biloko nde botiki bango, kino bitumba bikosila, mpo ete soki Allah alingaki nde asilani na bango ye moko, kasi ezali тропа komeka bino. Mpona ba оуо bakokufa na nzela ya Allah, akobebisa misala na bango te

5Akokamba bango mpe akobongisa misala mia bango

6Mpe akokotisaka bango na lola eye alimbolelaki bango (balolenge na yango)

7Oh bino baye bondima (na Allah)! soki bosalisi Allah, akolongisa bino mpe akolendisa matambi na bino

8Mpe bapengwi bakozua mpasi mpe akobungisaka misala mia bango

9Mpo baboyaki maye Allah akitisaki, yango abebisi misala mia bango

10Mpona nini te bazali kotambola na mokili batala lolenge kani esukelaki baye bazalaki liboso na bango? Allah abebisaki bango, mpe lolenge wana nde ekozalela bapengwi

11Mpo ete, ya soló, Allah azali mobateli ya bandimi kasi ya sólo bapengwi bazali na mobateli te

12Ya sólo, Allah akokotisa baye bandimaki mpe basalaki misala milamu na lola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, тре bapengwi bazali kosepela na kólia lolenge banyama baliaka, mpe esika na bango ya kovanda ezali nde na lifelo

13Mpe bamboka ya makasiboni koleka etuka nayo oyo ebenganaki yo, tobebisaki yango mpe bazuaki mosungi te

14Boye oyo azali na polele kowuta epai na Nkolo naye, akokani na oyo babongiseli ye mosala ya mabe mpe balandi bamposa na bango

15Ndakisa ya Iola eye elengelami тропа babangi (Allah); o kati na yango ezali na mingala ya mayi oyo ebebaka te, ezali na mingala ya miliki oyo elengi na yango ebonguanaka te, mpe na mingala ya masanga ya elengi тропа bomeli, na mingala ya mafuta ya nzoi ya kitoko, mpe тропа bango ezali na lolenge ya bambuma nyoso ekozala okati na yango, mpe bakozua bolimbisi kowuta epai ya Nkolo wa bango. Kasi, boye bazali lolenge moko na oyo akotikala na lifelo ya libela bakomelisaka bango mayi ya moto ya makasi mpe ekokatakata misopo na bango

16Мре kati na bango, bamosusu bazali koyoka yo, soki babimi epai nayo balobi na baye bazuaki boyebi ete: Alobi nini? Baye wana Allah akanga mitema mia bango mpe balandi sé bamposa na bango

17Мре тропа baye bamitiyaki o nzela ya semba, akokamba bango koleka mpe akobakisela bango bobangi na bango

18Boye bazali kozela ete ngonga eyela bango mbalakaka?! Nzoka bilembo na yango bisili koya; mpe soki bokundoli eyeli bango bakokanisa ndenge nini

19Mpe yeba ete: Ya soló, nzambe mosusu ya kobondela na bosôló azali te bobele Allah, sima osenga bolimbisi ya masumu nayo na ya bandimi ya mibali na ya basi. Allah nde ayebi makambo na bino (awa na nsé), mpe ayebi bisika ya bopemi na bino (lobi kati na lola)

20Mpe bandimi bazali koloba ete: Mpona nini suratu ekitisami te? Kasi soki suratu ya mibeko okati na yango milobeli bitumba, okomona baye bazalaki na bokono omitema bazali kotala yo na etaleli ya moto amoni liwa, nde ezali malamu mpona bango

21Botosi mpe liloba ya malamu. Mpe soki motindo mozuami тропа likambo (ya bitumba) ezalaki malamu тропа bango bandimela Allah тропа likambo yango

22Boye soki bopesi mokongo, bokokende te тропа kotia mobulu na nsé mpe kokata bondeko ya mabota? (soki bolingi bokonzi koleka)

23Baye wana Allah apesaki bango botutu, mpe abomi bango boyoki mpe bomoni

24Mpona nini bazali kososola kurani te to boye mitema na bango mikangami na fungóla

25Ya soló, baye bazali kozongela banzela na bango (ya mabe) na sima ya koyeba nzela ya semba oyo eyeli bango polele, satana akosi bango mpe akweisi bango

26Mpo bango balobaki na baye bayini emoniseli ya Allah ete: Tokotosa bino na ndambu ya makambo, kasi Allah ayebi malamu basekele na bango

27Mpe ekozala boni soki ba anzelu bazui milimo mia bango, wana bazali kobeta bango na bilongi na mikongo mia bango

28Wana ezali mpo balandaki maye Allah aboyaki, mpe bazalaki na ntina ya kondima yango te, тре misala mia bango mibebisamaki

29To boye baye bazali na bokono na mitema mia bango (bakanisi ete) Allah akobimisa bonguna na bango polele te

30Mpe soki tolingaki nde tolakisaki yo bango, oyebi bango na bilembo na bango. Mpe okoyeba bango na lolenge na bango ya koloba. Kasi Allah ayebi misala na bino

31Mpe tokomeka bino mpo toyeba banani bazali kobunda (тропа Allah), тре banani bazali kokanga mitema, mpo ete na sima tomonisa basango na bino

32Ya soló, baye bapengwa тре bazali kobundisi nzela ya Allah, mpe baboyi kondimela motindami o sima ya kolimbolela bango bokambi ya polele, wana bakosala Allah eloko te. Kasi akobebisa misala mia bango

33Oh bino baye bondima! Botosa Allah mpe botosa motindami (na ye) kasi bobebisa misala mia bino te

34Ya sólo, baye bapengwa тре babundisaki nzela ya Allah, sima liwa lizui bango sé na bopengwi, Allah akolimbisaka bango te

35Bolembe te mpe bobenga na kimia te na tango bozali likolo na bango, mpe Allah azali elongo na bino, mpe akokutola misala na bino te

36Ya soló, bomoyi ya mokili ezali sé lisano mpe liseki. Soki bondimi mpe bobangi, (Allah) akopesa bino bolamu na bino mpe akosenga bino bomengo te

37Soki atunaki bino yango, bolingaki bozala bapimi, mpe akobimisa boyini na bino

38Bino nde, soki babengi bino ete bobimisa na nzela ya Allah, basusu bakangi maboko, kasi oyo akokanga maboko ayeba ete asali yango na nzoto naye moko, nzoka nde Allah azali wa bomengo mpe bino bozali babola. Mpe soki bopesi mokongo akoya na bato ya sika, mpe bakozala lokola bino te

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath