Lingomba ya Islam
zonga

46. Al-Ahqaf azali moto ya mayele

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Hâ, mîm

2Bokiti y a buku kowuta epai ya Allah wa bokasi atonda bwanya

3Tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali otei na yango nyoso mibale na bosóló na tango eye eyebani. Bapengwi bazali koboya na maye bazali kokebisa bango

4Loba: Bokanisi nini тропа baye bozali kobelela na botiki Allah, bolakisa ngai nini bakela na mabele, to bazali na mosangisi o likolo? Boyela ngai buku ya bosembo oyo ezalaki liboso ya oyo (kurani) to elembo ya boyebi soki ya soló, bozali na bosembo

5Mpe nani abungi koleka moto oyo azali kobondela na botiki Allah eloko ekoyanola ye te kino o mokolo ya suka, тре bazali koyanola na mabondeli na bango te

6Мре tango bakosangisa bato (тропа bokati makambo), bakozalaka banguna na bango тре bakowangana mabondeli na bango

7Мре soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, baye bapengwa bazali kolobela na bosembo tango eyeli bango ete: Oyó ezali bonganga ya polele

8То тре bazali koloba ete: Asali yango na ndenge naye, loba: Soki nasali yango na ndenge na ngai, bokosala ngai eloko moko te liboso ya Allah, ayebi malamu maye bozali kopanza sango (na mabe тропа kobukela kurani lokuta). Akoki lokola nzeneneke kati na ngai na bino, mpe azali molimbisi atonda ngolu

9Loba: Nazali motindami wa yambo ya koyela bino te, mpe nayebi te oyo bakosala na ngai mpe тропа bino; nazali kolanda sé maye bakitiselaki ngai, mpe nazali sé mokebisi ya polele

10Loba: Boye bozali kornona ndenge nini soki (boyebi) ewuti epai ya Allah, mpe bozali kondimela yango te; mpe nzeneneke moko kati ya bana ya isalayele amoni mpe andimi na yango? Mpe bosali lolendo? Ya soló, Allah akambaka babubi te

11Bapengwi bakolobaka na bandimi: Soki oyo ezalaki malamu (babola) balingaki koleka biso te, mpe soki bakambami na yango te, balobi: Oyo ezali lokuta ya kala

12Мре liboso naye, buku ya Mûssa ezalaki bokambi mpe ngolu, kasi buku oyo na lokota ya arabo ezali motatoli nayango, тропа kokebisa babubi mpe ezala sango elamu тропа bato ya malamu

13Ya soló, baye balobi Nkolo wa biso Allah sima basembuami, bakozalaka na bobangi te mpe bakozala na mawa te

14Baye wana nde bato ya lola, bakozalaka libela okati na yango, mpe bakofutamaka тропа maye basalaki

15Mpe topesaki mobeko na moto ete asalela baboti naye bolamu, mama naye amemaki zemi naye na mpasi mpe abotaki ye na mpasi, mpe zemi naye na komelisa ye kino akokisi sanza ntuku misato kino akomi makasi, mpe akokisi mbula ntuku minei alobi: Nkolo tika ete natondo yo тропа bolamu nayo osaleli ngai, mpe na baboti na ngai, mpe tika ete nasala mosala ya malamu oyo ekosepelisa yo, mpe bongisa libota na ngai. Ya soló natubeli epai nayo mpe ya sólo nazali okati ya baye bazali komisokia (bamizilima)

16Baye wana nde tokondimela bango тропа bolamu oyo basalaki, mpe tokolongolaka mabe na bango, mpe bakozalaka okati ya bato ya lola, engebene na elaka ya bosóló oyo bapesaki bango

17Mpe oyo akoloba (akofiotola) na baboti naye: Ufi, bozali kolaka ngai ete nakosekwa? Kasi ebele basila koleka liboso mpe bazonga te? Mpe bango mibale bazali kosenga libateli epai Allah, mpe bazali koloba naye: Mawa nayo, ndima elaka ya Allah ezali ya sólo. Mpe azali kozongisela bango ete: Oyo ezali sé masapo ya kala

18Baye wana esengeli bazua etumbu na baye baleka liboso lia bango okati ya bilima na bato. Ya sólo, basilaki kozanga

19Bato banso bazali na esika na bango mpo na oyo bazalaki kosala, mpe bakofutaka bango engebene na misala na bango mpe bakobubama te

20Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi nalifelo; (bakoyebisaka bango) ete: Bobebisaki bolamu na bino na mokili mpe bosepelaki bongo, kasi lelo bokofutama na etumbu ya makasi engebene na maye bosalaki lolendo na mokili na botikaki bosóló, mpe тропа maye bozalaki kobebisa

21Mpe kanisa ndeko ya ba Aad, tango akebisaki bato naye na ahqáf, liboso naye mpe sima naye, bakebisi basilaki koleka ebele ete: Bobondela sé bobele Allah, ya soló, nazali kobangela bino etumbu ya mokolo monene

22Balobaki: Oyeli biso mpo oboyisa biso banzambe na biso? Na yango yela biso oyo ozali kolaka biso soki ya soló, ozali okati ya bato ya bosembo

23Alobaki ete: Boyebi ezali nde epai ya Allah; nazali kokomisela bino maye natindami na yango. Kasi nazali kornona bozali bato oyo bozangi koyeba

24Mpe tango bamoni (etumbu) lokola lipata ezali kokende nanse, balobi: Lipata oyo ekonokela biso mbula. Kasi ezali oyo bozalaki koluka yango noki, wana ezali nde mopepe ya etumbu makasi

25Ebebisaki nyoso na mibeko mia Nkolo na yango, sima na yango na tongo, bango banso bamonanaki lisusu te, etikalaki sé bandako na bango. Lolenge wana nde tofutaka batomboki

26Mpe ya soló, tofandisaki bango malamu, mpe makasi koleka ndenge tofandisi bino, mpe topesaki bango boyoki, bomoni mpe mitema, kasi boyoki na bango, mpe bomoni na bango, mpe mitema na bango nyoso wana esalisaki bango na eloko te, na tango bazalaki kowangana bilembo bia Allah, mpe bazingamaki na etumbu тропа ntina ya maye bazalaki kosala ya litio

27Mpe tosilaki koboma bamboka ya pembeni na bino, mpe totiyaki bilembo mpo bakoka komizongisa

28Mpona nini bazuaki lisungi te epai ya baye bazuaki bango banzambe na botiki Allah? Ete: Bango nde bakopusanisa bango pembeni na Allah, kasi banzambe yango basundoli bango. Wana ezali lokuta na bango oyo bazalaki kosala

29Mpe (kanisa) tango totindelaki yo ebele ya bilima, mpo bayoka ndenge kurani ezali kotangema, mpe tango bayokaki yango, balobi: Boyoka malamu, tango esili; bazongaki epai na bato na bango тре bakebisaki bango

30Balobaki: Oh bato na biso! ya soló, toyokaki maloba ya buku oyo ekitaki sima ya Mûssa; (ezali koloba) bosóló ya maye maleka mpe ezali kokamba na bosembo o nzela ya semba

31Oh bato na biso! Boyamba moteyi ya Allah, тре bondima naye. Akolimbisa masumu na bino mpe akobatela bino na etumbu ya makasi

32Mpe oyo akondimela motei ya Allah te, akozua ekimeli te na bokonzi ya Allah na mokili, mpe akozala na babateli te elongo naye. В a oyo wana nde bazali na libunga ya polele

33Boye bazali kornona te ete Allah nde akelaki likolo тре na nsé, тре alembaki тропа kokela yango te, boye azali na nguya te ya kosekwisa bawa? Iyo, ya soló, azali na nguya likolo ya biloko binso

34Mpe mokolo moye bakomemaka bapengwi na lifelo; (bakotunaka bango) oyo ezali solo te? Bakoyanolaka: Iyo. Ya sólo, Nkolo wa biso. Akolobaka: Bomeka etumbu тропа maye bozalaki kopengwa na yango

35(Muhammad) kanga motema ndenge batindami bakangaki mitema, kasi kowelisa bango na etumbu te. Mokolo bakomona maye balakaki bango, ekozala lokola bawumelaki sé tango moko ya pamba na mokili, baye esengeli babebisama ezali te sé bato mabe

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath