45. Al-Jaathiya, oyo azali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Hâ, mîm
2Buku ekitaki kowuta epai ya Allah azali na bokasi atonda bwanya
3Ya soló, okati ya likolo na mabele bilembo тропа bandimi
4Mpe na bokeli bino na banyama, ezali bilembo тропа baye bazali na tembe te
5Mpe bokeseni bwa butu na mokolo; na maye Allah akitisaki kowuta na likolo lokola bozui, oyo ezali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango, mpe kotambola ya mopepe bipai na bipai, ezali bilembo mpo bato bakoka kokanisa
6Wana ezali mikapo mia Allah tozali kotangela yo na bosoló. Liloba kani bakondimaka yango osima (koyoka mpe kozua liloba) ya Allah na bilembo bia ye
7Bato banso baye bazali kosala masumu ya minene mpe kobuka lokuta; bakozua mabe
8(Oyo) azali koyoka mikapo mia Allah miye bazali kotangela ye sima asaleli yango lolendo lokola atikala koyoka yango te, pesa ye sango ya etumbu ya makasi
9Soki ayebi eloko moke okati ya mikapo mia biso, asaleli yango litio, baye wana nde bakozua etumbu ya kokitisama
10Sima bango bakozalaka na lifelo; bakosalisaka bango na eloko te; ezala ata baye bazuaki bango ete bazali babateli na bango na batiki Allah. Bakozalaka na etumbu monene
11(Kurani) oyo ezali bokambi, mpe baye bazali kopengwa na mikapo mia Nkolo wa bango, bakozua etumbu ya makasi koleka
12Allah akela ebale тропа bino; тро ete masuwa etambolaka na mitindo mia ye тре mpo bozuaka bolamu bwa yango mpe botondo. (ye)
13Mpe akeli тропа bino manso maye mazali okati ya likolo na mabele na mitindo kowuta epai naye. Ya soló, wana ezali bilembo mpo bato bakanisa
14Loba na baye bandima: Balimbisa baye bazali kolikia na mikolo mia Allah te, mpo moto nyoso afutama na maye asalaki
15Oyo akosala bolamu ezali тропа ye moko, mpe oyo akobebisa, ekozongela sé ye moko. Sima bokozongisama epai ya Nkolo wa bino
16Мре tosilaki kopesa na bana ya isalayele buku тре mibeko тре bontoma, тре topesaki bango biloko bia kitoko, mpe totombolaki bango esika koleka basusu (na tango na bango)
17Mpe toyelaki bango bilembo bia polele ya mibeko mpe bakabwanaki te sé tango boyebi eyelaki bango тропа likunya okati na bango. Ya soló, Nkolo nayo akosambisa kati na bango na bosôló o mokolo mwa suka тропа maye bazalaki na bokeseni
18Sima totiyaki yo na nzela ya mibeko landa yango, kasi kolanda te bamposa ya baye bazanga boyebi
19Ya soló, bango bazali na bokoki ya kosalela yo bolamu te koleka bolamu ya Allah. Mpe ya soló, bato mabe bango na bango bazali baninga, Allah nde azali mobateli ya bandimi
20Buku (Kurani) oyo ezali polele тропа bato, тре ezali bokambi тре ngolu тропа baye bazali па kondima ya soló
21Boye baye bazali kosala mabe, bakanisi ete tokozua bango lolenge moko na baye bandimi mpe bazali kosala misala milamu okati ya bomoyi mpe liwa na bango? Oyo ndenge ya mabe ya kokata likambo
22Mpe Allah akela likolo na mabele na bosóló; mpe mpo afuta moto nyoso na maye asalaki, mpe bakobubamaka te
23Boye ozali kornona te ete oyo azui mposa naye nde nzambe naye, mpe Allah abungisi ye na boyebi, mpe akangi ye matoyi na motema mpe atie ezipelo na miso, nani mosusu akokamba ye osima ya Allah, boye bozali kokanisa te
24Mpe bazali koloba ete: Bomoyi ezali sé ya mokili ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa, bobele tango nde ezali koboma biso. Bazali na boyebi te тропа yango sé makanisi
25Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mapolele bakolobaka ete: Bozongisa bankoko na biso na bomoyi soki bozali koloba bosóló
26Loba: Allah apesaka bino bomoyi sima akobomaka bino; sima akosangisaka bino o mokolo mwa suka, mokolo moye mokozalaka na tembe te; kasi ebele ya bato bazali koyeba te
27Mpe bokonzi bwa likolo na mabele ezali ya Allah. Mpe tango mokolo wana mokokokaka, bato ya lokuta bakozangaka
28Mpe okomona bato banso bakofukama. Mpe bakobengama o ngambu ya buku na bango, lelo bokofutama тропа maye bosalaki
29Oyo buku na biso ezali koloba bosembo likolo na bino. Tozalaki kozua maye manso bozalaki kosala
30Kasi baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokotisa bango na bolamu bwa ye. Wana nde elonga ya polele
31Mpe тропа baye bapengwaki (bakolobaka na bango): Boye batangelaki bino mikapo mia ngai te? Kasi bosalaki lolendo. Ya soló bozalaki batomboki
32Mpe tango bazali koyebisa bango ete elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe ya sólo, ngonga ena ezali na tembe te, bolobaki toyebaki yango te, tozalaki kornona yango pamba, mpe tondimaki na yango te
33Mpe akomonisa bango mabe na bango oyo basalaki, mpe maye bazalaki kotiola ekokueyela bango
34Mpe bakoyebisa bango: Lelo tobosani bino ndenge bobosanaki mokolo mwa elaka mwa bino moye, mpe esika na bino ezali nde lifelo. Kasi bakozwaka mosungi te
35Nyoso wana mpo bozuaki mikapo mia Allah na liseki, mpe bomoyi ya mokili ekosaki bino. Mokolo wana bakobimisama okati na yango te mpe bakoyambama te, okati ya ngolu
36Lokumu na Allah Nkolo ya likolo na mabele, Nkolo ya molongo mobimba
37Mpe atonda na bonene okati ya likolo na mabele, mpe azali na bokasi mpe bwanya
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath