Lingomba ya Islam
zonga

43. Az-Zukhruf azali moto ya mayele

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Há, mím

2Mpe buku eye elimbolama polele

3Ya sôló, totiaki yango kurani na lokota ya arabo mpo ete bokanisa

4Mpe ya sôló, yango ezali o kati ya mama ya makomi pembeni na biso o likolo koleka etonda bwanya

5Boye tóbetela bino bokundoli ete bozalaki bato mabe

6Boni kati ya bantoma baye totindaki epai ya bato ya yambo

7Ntoma atikalaki koyela bango te sé kino batióla ye

8Mpe tobomaki mingi koleka kati na bango, mpe tosilaki kotanga ndakisa ya bato ya yambo

9Mpe soki otuni bango; nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: ya soló, oyo akela yango nde oyo azali na bokasi atonda boyebi

10Oyo atiyelaki bino mabele ezala etando ya kofanda, mpe atiyeli bino banzela kati kati na yango mpo bokambamaka (na yango)

11Ye nde akitisaka mayi kowuta na likolo na bokoki, mpe tozali kopesa na yango bomoyi na mboka oyo ekufa (ekawuka), mpe lolenge wana nde bokobimisama

12Mpe ye nde akela balongani mibale mibale bango banso, mpe asaleli bino masuwa na banyama mpo bomataka na yango

13Mpo ete bofanda na mikongo mia yango, mpe bokanisa bolamu ya Nkolo wa bino osima ya komata na yango mpe bokolobaka: lokumu ya oyo asaleli biso maye, mpe tozalaki na makoki ya kosala yango te

14Mpe ya soló epai ya Nkolo wa biso nde tokozongaka

15Mpe kati ya bawumbu naye oyo akela bango bazueli ye bambanda. Ya soló, moto azali na bopengwi monene mpe ya polele

16To na kati ya maye akela aponi bana basi (ba anzelu), mpe asali bino bana mibali

17Мре soki bapesi moko kati na bango sango ya maye bazali kopesa na Ar-Rahmân (Allah) (тропа kobotama ya mwana mwasi), okomona elongi naye ekomi moyindo na mawa. (etondi na pizoli na kosilika)

18(Soki batuni ye) ezali nini? (Akolobaka ezali nde mwana mwasi), oyo akoki kosala ata eloko moko te, mpe akoki mpe kotelema тропа koloba polele te, sé kosala mabe

19Mpe bazali kokomisa baanzelu baye bazali bikelamu ya Ar-Rahmân ete bazali basi. Boye bazalaki banzeneneke na bokelami na bango? Ekokomama maye bazalaki koloba mpe bakotunama

20Mpe bazali koloba ete: Soki Ar-Rahmân alingaki nde tobondeli bango te, bazali na boyebi moko te, bazali sé na makanisi mabe

21To boye topesaki bango buku liboso mpo basimbama na yango

22Kasi bakolobaka ete: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo mpe tozali na bokambami mpe tozali sé kolanda yango

23Мре lolenge wana nde totindaki liboso nayo mokebisi na engumba sé bato ya bozui kati na yango baboya (ye) mpe baloba: Tokutaki bankoko na biso na lingomba oyo, tokolanda sé nzela na bango

24(Mokebisi) alobi ata soki nayeli bino nzela ya semba koleka oyo ya bankoko na bino? Bakoyanolaka: Tokondima na maye oyei na yango te

25Tozuaki bango mabe, mpe tala lolenge nini bato ya lokuta basukaki

26Mpe tango Ibrâhîm alobaki na tata waye na bato naye: Ya soló, ngai namitiye mosika na maye bozali kobondela

27Longola sé oyo akela ngai, ya sólo ye nde akokamba ngai na (nzela ya semba)

28Mpe atiaki liloba bango litikala na libota lia ye, na ntina ete bamizongisa epai ya Allah

29Kasi napesaki bango na batata na bango bisengo ya токе kino bosembo (kurani) eyelaki bango mpe na motindami ya polele

30Mpe tango bosóló eyelaki bango balobi: Oyo ezali bondoki bwa polele, mpe tokondimela yango te

31Мре balobaki: Mpona nini bakitisaki kurani te ata epai ya moto ya monene kati ya bamboka mibale

32Boye bango nde bakabolaka bolamu ya Nkolo wayo? Tokabolelaki bango bomoyi bwa bango kati na mokili, totomboli basusu koleka baninga, mpo basusu bazala basali ya baninga. Mpe ngolu ya Nkolo wayo ezali malamu koleka maye bazali kosangisa

33Soki (bobangi) te ete bato bazala umma moko (ya libungi), nde totielaki bapengwi ya Ar- Rahmán mpona bandako na bango motondo ya mabende ya pembe mpe ngala-ngala (ebuteli) mpo bamataka na yango

34(nde totielaki bango) na bandako na bango bikuke mpe bambeto ya kitoko oyo bakofandela

35Na bonzenga. Wana nyoso ezali mpona bosepeli ya bomoyi bwa mokili, kasi ya mokolo mwa suka epayi ya Nkolo nayo ezali mpona babangi

36Na oyo akokanga miso (mpe amitiye mosika) mpona bokundoli bwa Ar-Rahmân, tokotiela ye satana azala moninga naye ya libela

37Мре ya soló, bazali kopekisa bango nzela, mpe ya sólo, bazali kokanisa ete bazali na nzela ya semba

38Kino moto wana akokoma epai na biso akoloba na elima naye ete: Mawa na ngai! Soki ntaka kati na ngai nayo lokola moniele na eloli, mpe oyo moninga ya mabe

39Mokolo mona mokosalisaka bino na eloko te mpo bozalaki babubi, bokosanganaka okati ya etumbu

40Boye, yo nde ozali na bokoki ya koyokisa mokufi matoyi to boye okambaka mokufi miso to oyo azali na libungi ya polele

41To mpe tokotombola yo na likolo (koboma yo), mpe ya sólo, tokosilana na bango

42To tolakisa yo mabe oyo tolakaki bango (etumbu) kasi tozali na bokasi likolo na bango

43Zala na bokangami na maye bamoniselaki yo. Ya sólo, ozali na nzela ya semba

44Ya sólo (kurani oyo), ezali bokundoli тропа yo mpe bato nayo. Mpe mosika te bokotunama

45Мре tuna batindami ba biso baye totindaki liboso nayo, boye tozalaki kozua banzambe misusu na botiki Ar-Rahmán тропа kobondela bango

46Mpe tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi та biso epai ya falo na bato naye (bankumu), mpe alobaki: Ya soló, nazali motindami ya Nkolo ya mokili

47Mpe tango bayeli bango makamwisi та biso, okomona bango bazali koseka yango

48Mpe na likamwisi nyoso na oyo tolakisaki bango, ezalaki makasi mingi koleka oyo ya liboso. Mpe topesaki bango etumbu mpo tango mosusu bakoki komizongisa epai na biso

49Mpe balobi ete: Oh yo nganga! Sengela biso Nkolo nayo тропа maye alakaki epai nayo, na yango tokokambama ya sólo na nzela ya semba

50Mpe tango tolongoleli bango etumbu, okomona bango wana babuki mibeko ya elaka

51Mpe falo abengi bato naye alobi: Oh bato na ngai! Bokonzi ya ezipito ezali na ngai te, mpe mayi ya ebale oyo ezali kotambola na nsé na ngai, boye bozali kornona te

52To boye nazali malamu te koleka moto mpamba oyo, mpe alobaka polele te

53Mpona nini babwakeli ye basinga ya wolo ya maboko te, to mpe ba anzelu baya naye elongo

54Na boye nde abangisaki bato naye mpe batosi ye. Ya soló, bazalaki bato mabe

55Mpe tango bapesaki biso kanda makasi, tozuaki bango mpe tozindisaki bango banso

56Mpe totiaki bango bazala liteya mpona baye bakoya sima na bango

57Mpe tango ndakisa ya mwana ya Maryam, epesamaki bato nayo bakomaki koyima yima (bamoni yango pamba)

58Balobi banzambe na biso to ye, nani azali malamu? Babeti ndakisa wana sé mpona yo na lolenge ya bilobaloba, kasi bazali sé bato balutisaki kosuana

59(Issa) azali sé mowumbu oyo topessaki ye bolamu, mpe tozalisa ye ndakisa mpona bana ya isalayele

60Soki tolingaki nde totiaki kati na bino ba anzelu awa na nsé bazali kokitana

61Mpe ya soló, akozala elembo тропа mokolo ya suka,botia tembe te, mpe bolanda ngai. Oyo nde nzela ya semba

62Satana abungisa bino te mpo azali monguna ya polele тропа bino

63Mpe tango Issa ayaki na bilembo alobaki: Nayeli bino yango na bwanya, mpe mpo nalimbolela bino ndambo ya maye bozalaki kokesene na yango. Bobanga Allah mpe botosa ngai

64Ya solo, Allah azali Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino, bobondela ye. Oyo nde nzela ya semba

65Kasi bakeseneki kati kati na bango. Babubi bakozuaka mabe o mokolo mwa etumbu ya makasi

66Boye bazali kozela (mokolo ya suka) yango ekoyela bango mbalakaka mpe bakoyeba te

67O mokolo mona, baye balinganaki bakokomaka banguna kati kati na bango, longola sé babangi (Allah)

68Eh! Bawumbu na ngai! Lelo, bozala na bobangi mpe niawa te

69В aye bandimaki na bilembo bia biso, mpe bazalaki kotosa (ba mizilima)

70Bokota o kati ya Iola, bosala biyenga elongo na basi na bino, (bosepela)

71Basani mpe bakopo ya wolo biko balukaka, bikotiama liboso na bango, o kati na yango bitondi na maye mazali na mposa na bango mpe bosepelisi miso. Bokozala libela na kati na yango

72Wana ezali nde lola oyo bokitani yango, тропа maye bozalaki kosala

73Kati na yango bokozalaka na bambuma ebele тропа kólia

74Ya sôló, batomboki bakozalaka na etumbu ya moto ya lifelo libela

75Ekokutolama te mpe bakozanga elikia o kati na yango

76Tosalaki bango mabe te kasi bango moko nde bamisalaki mabe

77Mpe bakobelelaka: Oh Mâlik! Nkolo wayo aboma biso, akoyanolaka bango: Botikali libela o kati na yango

78Tosilaki koyela bino bosôló, kasi ebele kati na bino baboyaki yango

79Boye basili kokana likita, kasi biso nde tozali na likita

80To bazali kokanisa ete toyokaka sekele na koyima yima na bango na mongongo ya sé te? Iyo! Batindami na biso epai na bango bazali kokoma nyoso (ba anzelu)

81Loba: Soki Ar-Rahmân azalaka na mwana, nalingaki kozala wa yambo тропа kobondela

82Lokumu na Nkolo ya likolo na ya mabele, Nkolo ya ngwende na maye bazali koloba

83Tika bango bazinda na mabe mpe basakana kino bakokutana na mokolo mwa elaka na bango

84Ye nde azali Nzambe ya kobondela likolo mpe o nsé, тре azali wa bwanya atonda boyebi

85Mpe apambolami ye oyo azali na bokonzi ya nsé na ya likolo, na maye ezali okati na yango, mpe ye nde azali na boyebi ya tango ya suka. Mpe epai naye nde bokozongisama

86Мре baye bazali kobondela bango elongo naye (Allah), bakokoka te kolobela, longola sé baye batatoli bosembo mpe bango bazali koyeba

87Mpe soki otuni bango nani akela bango, bakolobaka: Ya soló ezali Allah, kasi тропа nini bazali kopesa ye mokongo

88Mpe liloba lia ye (ntoma Muhammad epai ya Allah): Nkolo! Ya soló, bato wana bakondimaka te

89Malamu, mitiya mosika na bango (limbisa bango) mpe loba: Boboto. Kala mingi te bakoyebaka

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath