41. Fussilat ezali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Hâ, mîm
2Emoniseli ekiti kowuta epai ya oyo wa boboto atonda ngolu
3Buku eye mikapo miango milimbolami, etangeli na yango na lokota ya arabe (monoko ya arabo) mpo ete bato bayeba
4(Mpo) epesa sango elamu mpe ekebisa, kasi ebele kati na bango bamitiye mosika mpe bazali koyoka te
5Mpe balobi: Mitema mia biso mikangami na maye ozali kobenga biso na yango, matoyi na biso mazali ya kokangama, kati kati na biso nayo ezali na ezipelo. Sala oyo ya yo, biso mpe tosala ya biso
6Loba: Ya soló, nazali sé moto lokola bino oyo liloba ekitelaki ngai ete Nzambe na bino azali sé moko, bomisembola epai naye mpe bosenga ye bolimbisi. Kasi mawa ezali na basangisi (Allah)
7Baye bazali koboya kofuta zakat mpe bazali kopengwa тропа mokolo ya suka
8Ya soló, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na lifuta liye likokatanaka te
9Loba: Ya sólo, bozali kopengwa naye oyo akeli mabele na mikolo mibale, mpe bozali kotiela ye bambanda? Ye wana nde Nkolo ya mikili
10Ye apika bangomba likolo na yango, mpe apamboli yango mpe akokisi bomengo na yango na mikolo minei, wana nde eyano тропа baye bazali kotuna yo
11Sima, amitalisi na mapata na yango ezalaki sé milinga, mpe alobaki na yango na mabele ete: Boya epai na ngai, bolinga to bolinga te, biango bizongisaki ete: Toyei na botosi bonso
12Mpe akokisi bokeli likolo sambo okati ya mikolo mibale mpe abongisi makambo ya likolo moko na moko, mpe apesi likolo ya pene bozenga ya bongengi mpe bobatelami, wana mitindo ya oyo azali na nguya atonda boyebi
13Soki baboyi loba (na bango): Nakebisaki bino etumbu oyo ekoboma, lokola oyo ezuaki bato ya Aad na Thamûd
14Tango batindami na bango baydaki bango kowuta na bango moko liboso na sima, (balobaki na bango) ete: Bobondela sé bobde Allah, balobaki ete: Soki Nkolo na biso alingaki nde akitiselaki biso ba anzelu, na yango biso topengwi na maye botindami na yango
15Kasi тропа ba aad, basalaki lolendo na mokili kasi bosembo te, mpe balobaki etemani aleki biso na makasi? Boye bazali kornona te ete Allah oyo akeli bango ye nde aleki bango na makasi? Mpe bazalaki kowangana bilembo bia biso
16Mpe topesaki bango etumbu ya mopepe ya makasi mpe ya malili, mikolo mina mizalaki mabe mpo tomekisa bango etumbu yakokitisama, kati ya bomoyi ya mokili, mpe etumbu ya mokolo ya suka ekoleka lisusu makasi, mpe bakosungamaka te
17Kasi тропа ba Thamüd, tokambaki bango, kasi basepelaki nde na molili o esika ya bokambami, nkake ya etumbu makasi ezuaki bango тропа ntina ya maye bazalaki kosala
18Mpe tolongisaki baye bandimaki mpe baye bazalaki na bobangi
19Мре mokolo oyo banguna ya Allah bakosangisama ebele тропа kokende na moto, тре bokotindikama okati na yango
20Kino bakokoma na kati, matoyi na bango na miso na bango na loposo na bango, mikozala nzeneneke likolo na bango тропа maye bazalaki kosala
21Мре bakoloba na baloposo na bango ete: Mpona nini bozali kolobela mabe na biso? Baloposo bikozongisa eyano ete: Allah oyo alobisaka biloko binso ye nde alobisi biso. Мре ye nde akelaki bino mpona mbala ya liboso mpe epai naye nde bokozongisama
22Mpe bokokaki te komibomba na matoyi mpe miso mpe loposo na bino ete balobela mabe na bino te, kasi bokanisaki nde ete: Allah ayebi te ebele ya maye bozalaki kosala
23Makanisi та bino maye bokanisaki mpona Nkolo wa bino ebomisi bino, yango ekotisi bino na molongo ya bazangi
24Ata soki bakangi motema, sé bobele moto nde ekozala efandelo na bango, mpe soki baluki kosenga bolimbisi ekondimama te
25Мре topesaki bango baninga ya (bilima) baye bakokabwana na bango te, mpe babongiseli bango makambo maye mazali liboso mpe sima na bango mpe liloba ekokisamaki likolo na bango ndenge esalamaki na baye baleka liboso na bango kati na bilima mpe bato. Ya soló, bazalaki bazangi
26Mpe bapengwi balobi: Boyoka kurani eye te, bosalela yango makelele (tango ezali kotangama) mpo bolonga yango
27Ya sólo, tokomekisaka bapengwi etumbu ya makasi, mpe tokofutaka bango mabe koleka тропа maye bazalaki kosala
28Wana nde lifuta ya banguna ya Allah ekozalaka moto, bakovandaka kati na yango libela, lifuta lia etumbu тропа ndenge baboyaki kondima na mikapo mia biso
29Mpe bapengwi bakolobaka: Nkolo; lakisa biso baye babungisaki biso kati ya bilima na bato, mpo totia bango na nsé ya makolo na biso, mpo bazala bato ya nsé na biso koleka. (okati ya moto)
30Ya soló, baye bazali koloba ete: Nkolo na biso nde Allah, sima bamisembolami, ba anzelu bazali kokitela bango ete: Bobanga te mpe bomitungisa te, kasi bozua sango elamu ya Iola eye balakaki bino
31Tozali babateli na bino awa na mokili na mokolo mwa suka lokola, bokozuaka maye bokolingaka na maye bokosengaka
32O esika ya boyambi epai ya molimbisi atonda ngolu
33Nani azali na liloba kitoko koleka moto oyo azali kobenga bato epai na Allah, mpe asali mosala ya malamu, mpe alobi ete: Ya sólo, ngai nazali okati ya bamizilima
34Mpe kosala bolamu na kosala mabe ezali ndenge moko te. Longola mabe na ndenge ya malamu, mpe oyo azalaki monguna nayo, akokoma moninga nayo ya makasi
35Mpe likabo ya boye epesamaki te sé na bakangi mitema, mpe epesamaka sé na oyo atonda ngrásia
36Mpe soki satana abandi kotungisa yo, senga libateli epai na Allah, mpo ete azali moyoki atonda boyebi
37Мре okati ya bilembo bia ye (Allah), ezali butu na mokolo, moyi na sanza, bogumbamela moyi na sanza te, kasi bogumbamela Allah oyo akela yango, soki ya soló, bozali kobondela ye
38Mpe soki basali lolendo,kasi baye bazali pembeni ya Nkolo nayo, bakumisaka ye butu na moyi mpe bazali kolemba te
39O kati na bilembo bia ye, ozali kornona mabele ekawuki na botosi mpe bobangi, mpe tango tokitisaka mayi likolo na yango, etombwamaka mpe ekomi monene. Ya sólo oyo apesi yango bomoi, ye nde akosekwisa bawa. Ya sólo, azali na bokoki likolo ya biloko binso
40Ya sólo, baye bazali kobebisa ndimbola ya mikapo mia biso, bakokoka kokima biso te. Boye, moto oyo akobwakama na moto azali malamu koleka oyo akoyakaka na kimia o mokolo ya suka? Bosala maye bolingi, ya sólo, amonaka maye bozali kosala
41Ya sólo, baye bapengwa na bokundoli (kurani) tango eyelaki bango, mpe ya sólo yango ezali buku ya lokumu
42Mabe ezuaka yango sikoyo te, to sima na yango te, ewuti epai ya oyo azali bwanya atonda lokumu
43Oyo ezali kolobama ezali sé oyo esila kolobama na batindami liboso nayo. Ya soló, Nkolo nayo atonda bolimbisi mpe azali makasi na kopesa etumbu
44Mpe soki totiaka kurani oyo na lokota mosusu (ya arabo te), balingaki koloba ete: Mpona nini balimboli mikapo na yango polele te? Nini? Kurani na lokota ya bapaya (motindami) arabo? Loba: Yango ezali bokambi mpe libiki mpona bandimi, kasi baye bandimi te matoyi na bango makangami mpe miso na bango mazipami. Bango wana nde bakobengama о esika ya mosika
45Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, sima bokeseni ekotaki. Mpe soki mpona liloba ya Nkolo nayo te oyo esilaki kolobama, nde likambo esili kokatama kati na bango. Mpe bazali sé na tembe
46Oyo akosala malamu, ezali mpona ye moko, mpe oyo akobebisa ezali sé mpona ye moko. Kasi Nkolo wayo abubaka kati kati ya bawumbu naye te
47Boyebi ya mokolo ya suka ezali sé na mayele naye moko. Mpe mbuma moko te ekobima na kati ya loposo na yango, mpe mwasi moko te akomema zemi to akobota, kino ekozala sé na mayele naye. Mpe mokolo akobenga bango ete: Wapi bambanda na ngai? Bakozongisa ete: Tozali koloba nayo na bosembo ete: Tozali na nzeneneke ata moko te oyo akondimela biso ete ozali na bambanda
48Mpe baye bazalaki kokumisa bango liboso bakosundola bango, mpe bakoyebaka ete bazali na esika ya kokimela te
49Moto atikaka kosenga bolamu te, mpe soki mabe ezui ye alongoli elikia
50Mpe soki topesi ye bolamu na biso o sima ya mpasi azalaki na yango, alobi: Oyo ezali na mayele na ngai, mpe nandimi te ete mokolo ya suka ezali, mpe soki bazongisi ngai epai na Nkolo na ngai, nakozua sé oyo ya ngai ya kitoko. Mpe тропа baye bapengwa tokopesa bango sango ya maye bazalaki kosala, mpe tokomekisa bango etumbu ya makasi
51Мре tango topesaka moto bolamu, akimaka mosika, mpe soki mabe ezui ye akomi kosenga makasi
52Loba: Bomoni ndenge nini soki (kurani) oyo ewutaki epai ya Allah mpe sima bopengwi na yango, nani aleki kobunga koleka oyo amitiye mosika na mikakatano
53Tokolakisaka bango bilembo bia biso o kati na mokili mpe na banzoto na bango moko, kino bakoyebaka ete ya soló, kurani ezali bosóló, boye Nkolo wayo akoki te? Ya soló, ye azali na bokoki mpe amonaka manso
54Bazali na tembe тропа bokutani na Nkolo wa bango. Ya sólo ye azingi biloko binso
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath