40. Ghafir azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Há, mím
2Kokita ya buku oyo ewuti epai na Allah wa nguya atonda boyebi
3Molimbisi masumu mpe moyambi tubela, mopesi etumbu ya makasi, Nkolo ya bomengo, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosôló sé ye. Mpe epai naye nde bozongi bokozalaka
4Ezali sé bobele bapengwi nde bazali kosuanisa mikapo mia Allah, kaši misala mia bango ya mokili mikosa yo te
5Liboso na bango, bato ya Nûh basilaki koboya (ntoma) sima na bango, bato ya makita mpe baboyaki lokola, mpe bato na bato bamipesaki тропа kobundisa motindami na bango, mpe baye ya lokuta тропа kobundisa bosembo, mpe nazuaki bango, mpe ndenge nini etumbu na ngai ezalaki
6Мре lolenge moko na liloba lia Nkolo wa yo lízali na bosôló тропа bapengwi ete: Bazali bato ya moto
7В aye bazali komema ng wende naye, (ba anzelu) тре na baye bazingami pembeni na yango bazali kokumisa Nkolo wa bango, тре bazali kondima naye, тре bazali kosengela bandimi bolimbisi, (bazali koloba): Nkolo, eloko nyoso etondisami na ngolu nayo na boyebi, limbisa baye bazali kotubela mpe baye bazali kolanda nzela nayo, mpe batela bango na etumbu ya moto
8Nkolo, kotisa bango na Iola ya edeni oyo olakaki bango, mpe baye ya malamu kati na batata na bango mpe basi na bango mpe bana na bango, ya soló ozali wa bokasi otonda bwanya
9Mpe tia bango mosika na etumbu ya misala ya mabe, mpo moto oyo okotia ye mosika na (etumbu) о mokolo wana, asili kozua ngolu nayo. Mpe wana nde ekozala elonga monene
10Mpe тропа baye bapengwaki bakobengaka bango mpe kanda ya Allah likolo na bino eleki makasi mingi likolo ya kanda na bino moko tango bobengamaki na bondimi, boponaki sé kotikala na bopengwi
11Bakolobaka: Nkolo wa biso, obomaki biso mbala mibale mpe opesaki biso bomoyi mbala mibale, mpe toyebi mabe na biso, boye nzela ya kobimela ezali
12Bozalaki soki (nkombo) ya Allah ebengami na bomoko bwa ye, bozali koboya kondima, mpe soki basangisi ye (Allah) bondimi, mobeko ya kokata likambo ezali ya Allah, wa likolo azali monene
13Ye nde alakisaki bino bilembo bia ye, mpe azali kokitisela bino bozui kowuta na likolo. Azali kokanisa sé oyo amizongisi epai naye (ya Allah)
14Bokumisa Allah na bomoko mpe kolanda lingomba lia bosôló, ata soki bapengwi bazali koboya
15Amitombuami likolo koleka, Nkolo ngwende, atindaka molimo mosantu epai ya moto oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpo ete akebisa тропа mokolo ya bokutani
16Mokolo moye bakobimaka polele, eloko moko te ekobombamaka Allah, lelo; kibokonzi bozali ya nani? (eyano ekozalaka): Ya Allah wa bomoko atonda bokasi
17Lelo molimo (moto) nyoso mokozua lifuta kolanda na maye asalaki, lelo kobuba bozali te, ya soló, Allah azali noki тропа kofuta
18Mpe kebisa bango тропа mokolo moye mozali pene (mokolo ya suka), tango mitema na mingongo mikomataka mpe mikokangama. В abubi bakozuaka moninga ya kosalisa bango te mpe kosunga bango te
19(Allah) ayebaka mabe oyo miso esalaka, mpe manso maye mabombami o mitema. (mia bato)
20Mpe Allah akataka makambo na bosembo, mpe baye bazali kobondela na botiki ye bakokata likambo moko te, ya sólo, Allah azali moyoki mpe azali momoni
21Boye bazali kotambola na mokili te mpo batala lolenge esukela baye baleka liboso na bango, balekaki bango na bokasi mpe na bilembo okati ya mabele, mpe Allah azuaki bango тропа masumu та bango. Mpe bakokaki kobatelama te na maye Allah asalaki
22Boye ya sólo, batindami bazalaki koyela bango bilembo, mpe baboyaki kondima, mpe Allah azuaki bango. Ya soló, ye azali makasi тропа etumbu
23Мре tosilaki kotinda Mûssa na bilembo bia biso mpe bilembetele ya polele
24Epai ya falo na Hâmân na Qârûn, kasi balobaki ete: Oyo nganga moto ya lokuta monene
25Mpe tango ayelaki bango bosôló kowuta epai na biso, balobaki: B oboma bana ya mibali baye bazali na bondimi elongo naye mpe botika basi na bango na bomoyi, kasi likita ya bapagano ezalaka sé na libunga
26Mpe falo alobaki: Botika ngai na boma Mûssa, mpe abenga Nkolo waye. Ya soló, nazali kobanga noki akobongola lingomba lia bino to noki akosala mbeba kati na mokili
27Mpe Mûssa alobi: Nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai na ya bino тропа baye bazali kosala lolendo baye balingi kondima na mokolo mwa suka te
28Mpe mobali moko ya mondimi kati ya bato ya falo abombaka bondimi bwa ye alobi: Boye bozali koboma moto mpo alobi: Nkolo na ngai Allah? Mpe asili koyela bino bilembo binene kowuta epai ya Nkolo wa bino? Soki solo azali na lokuta, lokuta wana ekozongela sé ye moko, mpe soki azali koloba bosembo, ndambu ya masumu ya maye azali kokebisa bino ekozua bino. Ya soló, Allah akambaka moto ya mabe mpe ya lokuta te
29Eh bato ba ngai! Bozali na bokonzi lelo kati na mabele, nani akosungaka biso na etumbu ya Allah tango ekoyelaka biso? Falo alobi: Nakolakisa bino sé oyo nazali kornona, mpe nakokamba bino te sé na nzela ya semba
30Mpe oyo azalaki na bondimi alobi: Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino noki ekozalela bino lokola o mokolo ya lisanga ya mapinga
31Ndenge moko lokola bato ya Núh mpe bato ya Aad na Thamúd, mpe bato basusu bayaki sima na bango. Kasi Allah alingeli bawumbu naye libubi te
32Eh bato na ngai! Nazali kobangela bino тропа mokolo ya bobengami
33Mokolo moye bokopesaka mikongo na bokimi, moko te akobatela bino liboso ya Allah mpe oyo Allah akobungisa, akozuaka mokambi te
34Yûsuf asilaki koyela bino bilembo binene liboso, kasi botikaki tembe te тропа oyo ayelaki bino, kino tango akufaki bolobaki: Allah akotinda lisusu motindami sima naye te, lolenge wana nde Allah abungisaka moto ya mabe mpe ya tembe
35Baye bazalaki kobundisa bilembo bia Allah тре bazali na bilembetele te, ezali lisumu monene epai na Allah тре epai ya bandimi. Na boye nde Allah azali kokanga motema ya moto nyoso ya mabe mpe ya lolendo
36Mpe falo alobi: Eh Hâmân! Tongela ngai ndako ya likolo koleka, tango mosusu nakoki kozua banzela
37Banzela ya likolo, mpo namata epai ya Nzambe ya Mûssa, kasi nayebi ete ye azali moto ya lokuta. Lolenge wana nde falo azalaki kokanisa ete azali kosala malamu nzoka nde azalaki kosala mabe koleka, mpe abungaki nzela ya semba. Kasi likita lia falo lizalaki sé bozangi na bokufi
38Oyo andimaki alobi: Oh bato na ngai! Bolanda ngai, nakokamba bino o nzela ya semba
39Eh bato na ngai! Bomoyi boye bozali sé kosepelisa na mwa tango токе, kasi mokolo mwa lobi mozali esika (ndako) kitoko тропа kofanda
40Oyo asali mabe akofutama sé ndenge asalaki, mpe oyo akosala malamu mwasi to mobali mpe azali mondimi, bango wana nde bakokota na paladiso, bakoleisama maye mazali na suka te
41Mpe Oh bato na ngai! Nini na ngai, nazali kobenga bino na lobiko, kaši bino bozali kobenga ngai na móto
42Bozali koyebisa ngai napengwa na Allah mpe nasangisa ye na maye nayebi te? Kaši nazali kobenga bino epai ya oyo atonda bokasi azali molimbisi
43Tembe ezali te na oyo bozali kobenga ngai naya epai naye, azali na bosôló te, ye akoki kondimela (mabondeli) te, ezala awa na mokili to na mokolo ya suka, mpe bozongi bwa biso bokozalaka nde epai ya Allah, mpe ya soló bato ya mabe esika na bango ekozalaka nde móto
44Kala te, bokokanisaka maye nazali koyebisa bino. Mpe napesi makambo na ngai manso epai ya Allah. Ya soló, Allah amonaka bawumbu (naye)
45Allah abatelaki ye na likita ya mabe liye basalaki, mpe etumbu ya mabe ezingaki bato ya falo
46Bakofanda na moto tongo mpe mpokwa, mpe tango mokolo ya suka ekotelema, bokotisa bato ya falo na etumbu ya makasi koleka
47Mpe tango bato ya motawu na bato ya lolendo bakozongisanaka maloba kati na lifelo, ya soló, biso tozalaki nde kolanda bino, boye bokoki kolongolela biso ndambu ya etumbu ya moto te
48Bato ya lolendo bakolobaka: Ya sólo, biso banso tozuami na kati na yango, kasi Allah asili kokata makambo kati kati ya bawumbu (baye)
49Mpe baye bakozalaka o kati ya moto bakoloba na bakengeli ya lifelo: Bosengela biso Nkolo wa bino alembisela biso etumbu ata mokolo moko
50Bakoyanola bango ete: Boye batindami bayelaki bino bilembo te? Bakozongisa ete: Iyo; bakoloba na bango lisusu: Bosenga, kasi kosenga ya bapengwi ezali sé na libungi
51Ya solo, tokolongisa batindami na biso elongo na baye bandima na nsé mpe o mokolo oyo banzeneneke bakotelema
52Mokolo mona bosengi ya bolimbisi bwa bapengwi bokozalaka na ntina te, bakozuaka botutu mpe bakovandaka na mabe
53Mpe tosilaki kopesa Mûssa bokambi, mpe tokitanisaki bana ya isalayele buku
54(Ezala) bokambami na bokundoli тропа baye bazali kokanisa
55Kanga motema; elaka ya Allah ezali ya soló, senga bolimbisi na masumu nayo mpe pesa lokumu epai ya Nkolo wayo, na tongo mpe na pokwa
56Ya sólo, baye bazali kobundisa mikapo mia Allah, mpe bazali na bilembetele te, ya sólo, bazali na lolendo okati na ba ntolo na bango. Bakozuaka maye balingi te, senga ebateli epai ya Allah. Ya sólo, ye azali moyoki, momoni ya nionso
57Bokelami ya likolo na ya mabele eleki bokelami ya bato, kasi ebele ya bato bazali koyeba te
58Mpe oyo miso ekufa na oyo azali kornona bakokani te, mpe baye bandima mpe basali misala ya malamu bakokani mpe te na oyo asalaka mabe, токе nde bozali kokanisa
59Ya soló, tango ekoyaka, tembe ezali te тропа yango. Kasi ebele ya bato bazali kondima te
60Mpe Nkolo na bino alobaki ete: Bobelela ngai, nakoyanola bino. Ya sólo, baye batiki kobondela ngai na lolendo bakokota na lifelo, mpe bakozanga lokumu
61Allah nde atiyela bino butu mpo bopemaka, mpe atiyeli bino mokolo mpo bomonaka bongengi. Ya sólo, Allah azali Nkolo wa bolamu epai ya bato, kasi ebele ya bato bazali kotondo (ye) te
62Wana nde Allah Nkolo wa bino, mokeli wa biloko binso, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosoló sé ye mei, boye тропа nini bozali kotika (nzela ya semba)
63(Ndakisa); lokola baye bazali koboya mikapo mia Allah, bango batiki (nzela ya semba)
64Allah nde akeli тропа bino mabele ya kofandisama mpe likolo lokola motondo, mpe abongisi bino kitoko koleka mpe apesi bino bilei ya malamu. Wana nde Allah Nkolo na bino, mapamboli na Allah Nkolo ya mokili
65Azali na bomoyi, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye mei, bobelela ye na bomoko bwa ye, mpe holanda lingomba lilamu (islamu), lokumu na Allah Nkolo wa molongo
66Loba: Ya soló, bapekisi ngai ete nabondela baye bozali kobondela botiki Allah, na tango polele esili koyela ngai kowuta epai ya Nkolo na ngai, mpe natindami ete namisokia epai ya Nkolo ya mokili
67Ye nde akelaki bino na mabele, sima na litanga ya mayi ya mokongo sima ekomi liboke ya makila (bokomi mosuni ya makila) sima abimisi bino mwana moke, sima bokoli bokomi makasi, sima bokomi mibange,mpe na kati na bino, ba oyo bakufa noki, mpo ete bokokisa mibu miyebani, na ntina ete bososolo
68Ye nde apesaka bomoyi mpe liwa, mpe soki alingi kosala likambo akolobaka: Zala; mpe ezalisami
69Boye ozali kornona te ete: Baye bazali kobundisa mikapo mia Allah ba pengwisami (na bosembo)
70Baye bazali koboya kondima na buku (kurani) na maye totindaki batindami na biso na yango, bakoyeba kala mingi te
71Bakokanga bakingo mpe makolo na bango na minyololo mpe bakobendama (o lifelo)
72O kati ya mayi ya lifelo, sima bakozikisama na moto
73Sima bakoyebisaka bango: Wapi baye bozalaki kosangisa
74Elongo na Allah! Bakozongisa ete: Basundoli biso, mpe biso tozalaki kokumisa eloko te liboso. Na lolenge wana nde Allah azali kobungisa bapengwi
75Wana nde lifuta ya maye bozalaki kosepela na yango na mokili na lokuta, mpe bovimbaki na lolendo
76Bokota na bikuke ya lifelo libela, oyo esika mabe ya bato ya lolendo
77Kanga motema; ya soló, elaka ya Allah ezali ya solo. Tango mosusu tokolakisa yo ndambu ya etumbu tolengeli тропа bango, to mpe tokoboma yo yambo ete eyela bango, mpe epai na biso nde bakozongisama
78Ya sólo, tosilaki kotinda yambo nayo batindami, kati na bango tobetelaki yo masolo, mpe тропа basusu tobetelaki yo te. Mpe motindami akokaki koya na elembo (mokapo) te sé ezala na ndingisa ya Allah. Mpe tango motindo mwa Allah mokoyaka, makambo manso makokatamaka na bosôló, mpe baye balingaki sé kobuka lokuta, bakozangaka
79Allah nde akeli тропа bino banyama mpo bomataka likolo na yango, mpe misusu boliaka yango
80Misusu ezali kosalisa bino, mpe kati na yango bozali kobimisa biloko biye bolingaka, bozali komemama likolo na yango mpe likolo ya masuwa
81Mpe azali kolakisa bino bilembo bia ye, boye bilembo kani bia Allah bokoki koboya
82Batambola na mokili bamona lolenge kani esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki ebele koleka bango mpe makasi koleka bango, mpe batikaki bikamwa ebele sima na bango? Kasi manso bazuaki masalisaki bango na eloko te
83Mpe tango batindami na bango bayelaki bango bilembo bia polele, bayaki mpe basepelaki nde na boyebi bwa bango, sima bazingamaki na maye bazalaki kotiola. (koseka)
84Мре tango bamonaka etumbu makasi kowuta epai na biso, bakolobaka: Tondimi na Allah na bomoko bwa ye, mpe toboyi maye tozalaki kosangisa
85Kasi kondima na bango esalisaki bango te tango etumbu na biso esilaki kokomela bango, mobeko ya Allah uta kala likolo ya bawumbu naye, mpe na tango wana bapengwi bazangaki
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath