Lingomba ya Islam
zonga

37. Lokola-Saaffaat

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo

2Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata)

3Na baye batangaka bokundoli

4Ya soló, Nzambe na bino azali moko

5Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele

6Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto

7Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki

8Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso

9Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela

10Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto

11Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka

12Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka

13Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)

14Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio

15Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele

16Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu

17Na bankoko na biso ya kala

18Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama

19Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala

20Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)

21Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango

22Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango

23Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo

24Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama

25Mpona nini bozali komisunga te

26Kasi lelo bakoluka kozala na botosi

27Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana

28Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)

29(Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima

30Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe

31Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)

32Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko

33Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu

34Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki

35Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo

36Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma

37Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo

38Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi

39Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala

40Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama

41Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani

42(Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango

43Okati na bilanga (lola) bilamu

44Likolo lia bambeto bizali ya kotalana

45Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka

46Ya pembe elengi тропа komela

47Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te

48Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te

49Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami

50Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana

51Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga

52Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi

53Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka

54Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo

55Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo

56Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga

57Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu

58Ezali solo te ete tokokufa te

59Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te

60Ya soló, oyo nde elonga enene

61Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala

62Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe)

63Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi

64Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo

65Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana

66Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango

67Sima bakomela mayi ya tofina ya moto

68Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo

69Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi

70Mpe balandaki sé nzele na bango

71Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga

72Tosilaki kotindela bango bakebisi

73Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki

74Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama

75Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko

76Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene

77Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani

78Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu

79Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba

80Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi

81Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima

82Sima tobomaki basusu

83Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba

84Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu

85Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini

86Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah

87Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo

88Sima atalaki minzoto na bokebi

89Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali

90Bapesi ye mokongo bakei

91Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te

92Boye bozali koloba te тропа nini

93Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali

94Sima bato bayaki epai naye na lombango

95Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko

96Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala

97Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati

98Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango

99Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai

100Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu

101Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail)

102Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema

103Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye

104Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm

105Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi

106Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele

107Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa

108Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu

109Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm

110Lolenge wana nde tofutaka babongisi

111Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi

112Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu

113Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko

114Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso

115Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene

116Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi

117Mpe topesaki bango buku ya polele

118Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba

119Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu

120Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna

121Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi

122Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi

123Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami

124Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te

125Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu

126Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala

127Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu

128Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama

129Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu

130Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye

131Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi

132Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi

133Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami

134Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba

135Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali

136Sima tobebisaki basusu

137Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo)

138Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te

139Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami

140Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)

141Mpe aponamaki été abwakama

142Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te

143Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah

144Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa

145Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni

146Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)

147Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka

148Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke

149Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali

150То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona

151Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango

152(Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta

153Boye akopona bana basi koleka bana mibali

154Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana

155Boye bozali kokanisa te

156То bozali na bilembetele bisusu bia polele

157Boya na buku na bino, soki bozali koloba bosôló

158Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu)

159Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba

160Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama

161Ya soló, bino na baye bozali kobondela

162Bozali na nguya ya kobungisa moto moko te

163Longola sé oyo akozikisama na moto

164Moko te okati na biso, sé azali na esika eyebani

165Mpe ya soló, tozali komitelemisa na milongo

166Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah)

167Ata soki bazalaki koloba

168Soki tokanisaka bato ya kala

169Tolingaki kozala bawumbu ya Allah baye baponama

170Bapengwaki na yango, kasi bakomonaka

171Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami

172Ya sólo, ezali bango nde bakosalisama

173Mpe ya soló, basoda na biso nde bakolonga

174Mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye

175Мре tala bango, mosika te bakomona

176Nini boye bazali kowelisa etumbu na biso

177Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama

178Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye

179Mpe tala, kala mingi te bakomonaka

180Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba

181Kimia ezala likolo lia batindami

182Mpe lokumu ya Allah, Nkolo wa molongo mobimba

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath