Lingomba ya Islam
zonga

35. Faatir, oyo azali

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Matondo na Allah mokeli wa likolo na nsé, asali ba anzelu bazala batindami mpe apesi bango mapapu mibale, misato, to mpe minei, abakisaka na ekelamu lolenge alingi. Ya soló, Allah azali na makoki likolo ya biloko binso

2Oyo Allah afungoli bato тропа ngolu naye, moto ya kokanga yango azali te, mpe oyo akangi, moto ya kofungola yango sima azali te, mpe azali wa ngolu atonda bwanya

3Oh bino bato! Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, boye bozali na mokeli mosusu elongo na Allah oyo azali koleisa bino olikolo kino na nsé? Nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te bobele ye, na yango тропа nini bozali kopesa bosembo mokongo

4Mpe soki baboyi kondimela yo, kasi ebele ya batindami baboyamaki kondimela liboso nayo, mpe epai ya Allah makambo manso makozongisama

5Eh bino bato! Ya soló, elaka ya Allah ezali ya lokuta te, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (satana) mokosi monene akosa binoтропа Allah te

6Ya sólo, satana azali monguna na bino, bozua ye mpe monguna. Ya sólo, azali kobenga bato naye sé mpo bazala balongani ya moto ya lifelo

7Baye bapengwa bakozala na etumbu ya makasi, kasi baye bandimaki mpe basalaki misala ya malamu, bakozua bolimbisi mpe lifuta linene

8Boye moto oyo babongiseli ye mosala naye ya mabe mpe azali kornona yango malamu? Ya sólo, Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi, mpe konyokola molimo nayo te тропа bango. Ya sólo Allah ayebi malamu maye bazali kosala

9Allah nde azali kotinda mopepe ezali kotombola londende ya mbula, mpe tonukisi yango na mboka oyo ekufa, mpe tobikisi mabele yango na mayi wana. Lolenge wana nde lisekwa likozalaka

10Oyo azali koluka nguya, ayeba ete nguya nyoso ezali ya Allah. Epai naye nde maloba kitoko ezali komata, mpe azali kotombola mosala ya malamu. Kasi baye bazali kosala likita ya mabe, bakozala na etumbu ya makasi, mpe likita na bango wana ekolonga te

11Mpe Allah nde akeli bino na mabele, sima akeli bino na mayi ya mobali, sima asali bolongani (mwasi na mobali), mwasi moko te akomema zemi to akobota sé ezala na boyebi naye (Allah), mpe mibu mikobakisama te to kokutoama te kino esilaki kokomama na buku. Ya soló, wana ezali pete тропа Allah

12Mpe bibale mibale bikokani te, oyo ezali mpiyo kitoko тропа komela, mpe oyo mosusu ezali mungwa mpe bololo, mpe na nyoso mibale bozali kolia misuni na yango, mpe okati na yango, bozali kobimisa mabanga na biloko ya bonzenga тропа kolata, mpe okomona masuwa ya monene ezali kotambola na mayi na makelele ya makasi, etondi na mikumba, bozali kotambola na yango тропа koluka bolamu ya Allah, mpo ete bozala na botondi na (ye)

13Мре azali kokotisa butu kati na mokolo mpe mokolo okati ya butu mpe akeli sanza na moyi, mpe moko na moko ezali kotambola na nzela na yango na tango na yango. Oyo nde Allah oyo azali Nkolo wa bino. Azali na bokonzi bonso, kasi baye bozali kobelela na esika naye, bazali na eloko moko te ata lokola mposo ya mbuma ya tamru

14Mpe soki bobeleli bango, bakoyoka losambo na bino te, ata soki bayoki, bakokoka koyanola bino te. Mpe o mokolo mwa suka, bakopengwa na bosangisi bwa bino, mpe moko te akopesa yo sango koleka oyo atonda basango

15Eh bino bato! Bozali babola epai ya Allah, mpe Allah nde atonda bomengo mpe akumama

16Soki alingi, akolimwisa bino mpe akoya na bikelamu ya sika, (bato)

17Mpe wana ezali makasi te epai ya Allah

18Mpe moto moko te akomema mokumba ya moninga, mpe soki mokumba ya masumu ya moto eleki ye kilo, akoki kobenga basalisa ye te, ekosalama te ata bato ya libota naye, kasi ozali kokebisa baye bazali kobanga Nkolo wa bango na kobombama, mpe bazali kotelemisa losambo. Mpe oyo akomipetola, ezali sé тропа ye moko, mpe bozongi ezali epai na Allah

19Mpe moto oyo miso ekufi, akokani te na moto oyo azali kornona

20Mpe molili ekokani na mwinda te

21Mpe malili ekokani na molunge te

22Mpe baye ya bomoyi bakokani te na baye bawa. Ya soló, Allah ayokisaka nani alingi, kasi yo (Muhammad), okoki te koyokisa baye bazali na malita

23Kasi, yo ozali sé mokebisi

24Ya solo, totindaki yo na bosembo ete ozala mokebisi mpe mopesi sango ya malamu, mpo umma moko te oyo eleka sé bazua mokebisi

25Mpe soki baboyi kondimela yo, yeba ete baye ya liboso basilaki mpe koboya batindami na bango, bayelaki bango bilembo bia polele, na makomi, na buku ya bongengi

26Na sima, tozuaki ba oyo bapengwi, mpe tala ndenge nini (etumbu) na ngai ezalaki

27Boye omoni te ndenge Allah azali kokitisa mayi kowuta na mapata, mpe tozali kobimisa na yango bambuma ya ndenge na ndenge? Mpe okati na bangomba, banzela ya pembe mpe ya motané, na balangi ndenge na ndenge, mpe na misusu ya miyindo makasi

28Ndenge moko mpe bato na banyama ya mabele na an’ám binso bizali na balangi ya kokesene. Ya soló, baye bazali kobanga Allah kati na bawumbu naye, ezali nde banganga mayele. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bolimbisi

29Ya sólo, baye bazali kotanga buku ya Allah mpe bazali kotelemisa losambo, mpe bazali kobimisa (тропа Allah) bozui oyo topesi bango, bazali kobimisa yango na polele to na kobomba, bazali kolikia na mombongo oyo ebebisamaka te

30Mpo ete (Allah) apesa bango lifuta na bango mpe abakisela bango bolamu naye. Ya sólo, ye azali molimbisi atonda melesi

31Mpe oyo tokitisaki epai nayo kowuta na buku oyo ezali na bosembo, ezali kondima na maye makitaki liboso. Ya sólo, Allah azali kornona bawumbu naye mpe azali na sango na bango

32Na sima tokitanisaki buku epai na ba oyo toponaki okati ya bawumbu na biso, basusu kati na bango bamisalaki mabe, mpe basusu batelemi na bosembo, mpe basusu bawelaka kosala bolamu na ndingisa ya Allah. Wana nde ezali ngrásia ya monene

33Bilanga ya edeni nde bakokota, mpe bakolata ba wolo na mabanga ya talo na maboko mpe bilamba nabango ekozala ya fafala

34Mpe bakoloba ete: Matondo na Allah, oyo alongoli biso mpasi, ya soló, Nkolo wa biso azali molimbisi atonda matondi

35Na ngrásia naye, afandisi biso na bandako ya kimia, oyo bolembu mpe mpasi ekozua biso te

36Kaši ba oyo bapengwa, bakozala na moto ya lifelo, bakokufa na kati te, mpe na kati kuna, etumbu na bango ekokutolama te. Na lolenge wana nde tokofuta mopagano nyoso

37Mpe kuna na kati, bakoganga na kolele ete: Oh Nkolo na biso! Bimisa biso na kati, mpo tosala malamu totikaki kosala, boye topesaki bino bomoyi molai te ete oyo akokanisa, akanisa? Mpe mokebisi ayelaki bino. Na yango bomeka etumbu, kasi bato mabe bakoki kozua lisungi te

38Ya soló, Allah azali moyebi ya mabombami ya likolo na ya nsé. Ya sólo, ayebi maye manso mazali o kati ya mitema

39Ye nde atiaki bino bakitani na nsé. Mpe oyo akopengwa etali sé ye, mpe bapengwi na bopengwi na bango epai na Nkolo na bango ekobakisela bango sé soni, mpe ekobakisela bango sé bozangi

40Loba: Boye bomoni banzambe na bino baye bozali kobondela na botiki Allah? Bolakisa ngai eloko nini bakela awa na nsé. To mpe bazali na mosangani o likolo? To mpe topesaki bango buku eye ezali kokamba bango? Nzoka nde bazali kopesana bango na bango elaka ya lokuta

41Ya sólo, Allah asimbi likolo na mabele ete elimwa te, mpe soki elimwi, moko te sima naye akotombola yango. Ya sólo azali malamu atonda bolimbisi

42Мре bazali kolapa na nkombo ya Allah тропа kondima na bango ete: Soki mokebisi ayeli bango bakokambama malamu koleka mabota manso, тре tango mokebisi ayelaki bango (Muhammad), ebakiselaki bango sé bopengwi

43(Batondaki sé na) lolendo na mokili тре kosala likita ya mabe. Kasi likita ya mabe ezongelaka sé baye basali yango, mpe bakomonaka eloko mosusu te sé lokola eye ezuaki bato ya liboso? Мре okokuta mbongwana na mibeko ya Allah te. Mpe okokuta kotengama te na mibeko ya Allah

44Boye bazali kotambola na mokili te mpo bamona lolenge esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki makasi koleka, kasi ezali na eloko moko te kati na likolo na mabele oyo ekolembisa Allah. Ya soló, azali moyebi atonda nguya

45Mpe soki Allah azuaka bato na maye bazali kosala, nde ata nyama токе elingaki kotikala te, (likolo ya mabele ezala na bomoyi), kasi azali kozelisa bango kino mokano ekokoka. Mpe tango mokano ekokokisama (ekozuaka bango), ya soló Allah azali kornona malamu bawumbu naye

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath