Lingomba ya Islam
zonga

31. Luqman, azali moto ya mayele

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Alif, lám, mím

2Oyo bizali mikapo mia buku ya bwanya

3Yango ezali bokambi mpe ngolu тропа babongisi (bato ya malamu)

4B aye bazali kotelemisa losambo тре bazali kobimisa zakat mpe bazali na tembe te тропа mokolo ya suka

5Bango nde bazali na nzela ya semba ya Nkolo wa bango, тре bango nde balongi

6Мре kati ya bato, ezali na ba oyo bazali kosomba maloba mazanga ntina тропа kobungisa bato na nzela ya Allah na kozanga boyebi mpe bazali kotiola yango. Baye wana bakozuaka etumbu ya nsoni

7Mpe tango bazali kotangela ye mikapo mia biso, apesa mokongo na lolendo lokola ayoka naino yango te, mpe lokola ezali na eloko ya kilo kati na matoyi naye. Pesa ye sango ya etumbu ya makasi

8Ya soló, baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, bakozalaka na lola ya kitoko

9Libela kati na yango , elaka ya Allah ezali ya sólo, mpe azali na bokasi atonda bwanya

10Akela likolo ezali na makonzi te bozali kornona yango, mpe apiki bangomba likolo ya mabele ya bokangami mpo ekweyela bino te, mpe ati kati na yango lolenge nyoso ya banyama, mpe tokitisa mayi kowuta likolo, mpe tobimisi na yango milona ya lolenge nyoso

11Oyo nde bokeli bwa Allah, bolakisa ngai oyo ya basusu. Kasi babubi bazali na libunga ya polele

12Mpe tosilaki kopesa Luqmân bwanya ete tondo Allah, botondi. Mpe oyo akotondo botondi, ya soló asali yango тропа ye moko, oyo mpe akozanga botondi, ya sólo Allah atonda bozui asanzolama

13Mpe tango Luqmân alobaki na mwana waye (ya mobali) na bolendisi: Oh mwana wa ngai! Kosangisa Allah te, ya solo kosangisa (Allah) ezali bobubi bonene

14Мре toyebisaki na moto (asalela) tata na mama waye (bolamu), mama naye amema ye na pasi tango molai, bolembu na bolembu kino mibu mibale azali (komelisa ye mabele,) ete otondo ngai mpe otondo baboti nayo, epai na ngai nde bokozonga

15Mpe soki bango nyoso mibale batindi yo mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te, kasi zala na bango malamu awa na mokili, mpe landa nzela ya oyo ayei epai na ngai. Mpe bokozongaka epai na ngai, sima nakoyebisa bino maye bozalaki kosala

16Oh mwana wa ngai! Yeba ete eloko soki ezali moke lokola mbuma ya ndunda ebombami na nsé ya libanga to mapata to mpe na nsé ya mabele, Allah akobimisa yango (o mokolo ya suka). Ya soló, Allah azali malamu mpe azali moyebi

17Oh mwana wa ngai! Telemisa losambo mpe tinda (bato) basala bolamu, mpe pekisa mabe, mpe kanga motema na likambo oyo ezui yo. Ya sólo, wana ezali lolenge ya malamu ya kobongisa makambo

18Mpe kobalolaka elongi te na lofundo liboso ya bato mpe kotambola te na mokili osepela nayo moko koleka, mpamba te Allah alingaka bato ya lolendo na lofundo te. (komitombola na lolendo liboso ya bato te)

19Žala na etamboli ya malamu, mpe kitisa mongongo nayo. Mpo mongongo oyo eleki mabe ezali mongongo ya hamir

20Bozali kornona te ete ya sôló, Allah abongiseli bino maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe atondiseli bino bolamu bwaye ya polele na ya kobatama? Mpe okati ya bato, ezali na baye bazali kosuanisa тропа Allah, bazali na boyebi te, bakambami te mpe bazali na buku ya bosembo te

21Mpe soki balobi na bango, bolanda maye Allah akitisa, bakozongisa ete: Te, biso tokolanda sé maye bankoko na biso batika. Ata soki satana nde azali kobenga bango na etumbu ya lifelo

22Mpe oyo akomipesa elongi naye mobimba epai na Allah mpe azali mosali malamu, ye wana nde asili kokanga singa ya makasi, mpe epai ya Allah nde suka ya makambo ezali

23Kasi oyo akopengwa, bopengwi bwaye epesa yo mawa te, bozongi na bango ekozalaka nde epai na biso, тре tokoyebisaka bango maye basalaki. Ya soló, Allah azali moyebi ya maye mabombami o mitema mia bango

24Tozali kopesa bango bomoi ya bisengo токе, na sima tokomema bango na makasi na etumbu oyo eleki mpasi

25Mpe soki otuni bango, nani akela likolo na mabele? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah. Kasi ebele na bango bazali koyeba te

26Manso mazali o likolo mpe o nsé mazali ya Allah. Ya soló, Allah atonda bomengo atonda masanzoli

27Mpe soki ezalaki ete banzete nyoso na mokili ebongwana bikomeli mpe ba ebale mbala sambo ekoma mayi ya mokanda, nyoso elingaki kosila тре maloba ya Allah matikali. Ya sólo, Allah azali na nguya atonda bwanya

28Bokelami na bino mpe lisekwa na bino ezali lokola molimo moko mpamba. Ya sólo, Allah azali koyoka mpe azali kornona

29Boye ozali kornona te ete Allah azali kokotisa butu okati ya moyi mpe azali kokotisa moyi o kati ya butu, mpe akeli mwese mpe sanza mizala kotambola moko na moko na nzela na yango? Mpe ya soló, Allah azali na sango ya maye bozali kosala

30Wana ezali ete Allah azali bosembo, mpe ya sólo, maye manso bazali kobondela na botiki ye mazali mpamba, mpe ya solo, Allah azali likolo mpe monene koleka

31Boye ozali kornona te ya solo masuwa maye mazali kotambola na bibale, ezali sé na ngolu ya Allah, mpo amonisa bino bilembo bia ye? Ya soló wana ezali bilembo тропа moto nyonso oyo akangi motema mpe azali kotondo

32Mpe soki mbonge ya makasi ezui bango na ebale, babeleli Allah na bomoko naye nyoso, na sima soki abimisi bango na mokili, basusu kati na bango bazali kopengwa. Kasi ezali bobele bapengwi nde bazali koboya bilembo bia biso

33Oh bino bato! Bobanga Nkolo wa bino mpe bobanga mokolo moye tata akoyanolaka mwana wa ye te, to mwana lokola. Elaka ya Allah ezali solo, bomoyi ya nsé ekosa bino te, mpe (mokosi) satana akosa bino te тропа Allah

34Ya soló, epayi ya Allah nde ngonga ya suka eyebani mpe ye nde azali kokitisa mbula, mpe ayebi maye mabombama o mabumu ya basi mpe moto moko ayebi te soki lobi akozua nini. Mpe moto moko ayebi te soki akokufa na mboka nini, ya sólo Allah azali moyebi mpe atonda basango

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath