Lingomba ya Islam
zonga

30. Ar-Shambrɛ

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Alif, lâm, mîm

2Bato ya loma balongaki te

3Mpe sima ya kokweya na bango, bakozala balongi okati ya mboka oyo ezali pembeni na bango

4O kati ya ndambu ya mibu mitindo mizali mia Allah na ebandeli mpe suka, mpe bandimi bakosepelaka mokolo wana

5Na elonga bwa Allah. Alongisaka oyo alingi, mpe azali na nguya atonda ngolu

6Wana nde elaka ya Allah, Allah azangisaka elaka naye te. Kasi ebele ya bato bazali koyeba te

7Bazali sé koyeba bomoyi ya mokili mpe babosani oyo ya mokolo mwa suka

8Bakanisaka тропа bango moko te?! Allah akelaki te likolo na mabele na nyoso oyo ezali kati na yango mibale mpe akokisaki yango sé na bosôló тре тропа mikolo miyebani. Мре ya soló, bato ebele bazali kondima na bokutani na Nkolo wa bango te

9Boye bazali kotambola na mokili te, batala lolenge basalaki na bato ya liboso na bango? Bazalaki na bokasi mingi koleka bango, тре basalelaki mabele mingi na kolona mpe kotonga, batindami na bango bayelaki bango bilembo? Allah abubaki bango te, kasi bango moko nde bamibubaki

10Na yango suka ya mabe ekozongela baye basalaki mabe, na koboya mikapo mia Allah, mpe bazalaki kozua yango na liseki

11Allah nde abandaka bokeli mpe sima azongeli yango, mpe epai naye nde bokozongisama

12Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, batomboki bakozangaka elikia

13Mpe bakozuaka baye bakosalisaka bango te okati ya basangisi ba bango, mpe bakoyebaka banzambe na bango lisusu te

14Mpe mokolo moye ngonga ekokokaka, bakokabwanaka. (bango na bango)

15Kasi тропа baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, bakozalaka na bosepeli o kati na lola

16Mpe тропа baye bapengwaki, тре baboyaki kondima na bilembo bia biso mpe kondima na mokolo ya suka bakomemama okati ya etumbu

17Bokumisa Allah tongo mpe pokwa

18Mpe matondo nyoso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, na nzanga mpe sima ya nzanga

19Azali kobimisa moto ya bomoyi kowuta na liwa, mpe moto ya liwa kowuta na bomoyi, mpe azali kosekwisa mabele sima ya kokufa na yango. Na lolenge wana nde bokosekwaka

20Mpe o kati ya bilembo bia ye, akela bino kowuta na mabele, sima bokomi bato bozali kotambola na mokili

21Mpe kati ya bilembo bia ye, akela basi kowuta na bino moko, mpo ete bovanda na kimia epai na bango, mpe atie kati na bino bolingo na ngolu (mawa). Ya soló wana ezali bilembo mpo bokoka kokanisa

22Mpe kati ya bilembo bia ye, akela likolo na mabele mpe akesenisi bino loposo na balokota wana ezali elembo тропа bayebi

23Mpe kati ya bilembo bia ye, bapongi na bino na butu mpe moyi, mpe koluka bolamu naye. Ya soló, wana ezali bilembo тропа bato oyo bayokaka

24Mpe kati ya bilembo bia ye azali komonisa bino bongengi (bwa nkake) na kobangisa na elikia ya kobetisa mbula kowuta na likolo тропа kopesa bomoyi na mabele sima ya kokufa na yango. Wana ezali bilembo тропа baye bazali kososolo

25Mpe kati ya bilembo naye, likolo na mabele ezali ya kotelema na mobeko mia ye. Sima akobengaka bino mbela moko bokobima kati na mabele

26Maye manso mazali okati na likolo na mabele, mazali ya ye mpe mazali kotosa ye

27Mpe ye nde abandaka kokela mpe akozongisa yango, (ya bokeli sima azongisi yango,) mpe wana ezali pete тропа ye, mpe epai naye ezuami ndakisa ya koleka kuna na likolo mpe na nsé. Mpe azali na bokasi atonda bwanya

28Azali kopesa bino másese na banzoto na bino moko, boye bosangisi bawumbu na bino na maye topesi bino na bozui mpo ete bokokana? Bozali kobanga bango ndenge bomibanganaka bino na bino? Na boye nde tozali kolimbola bilembo bia biso mpo na baye basosolaka

29В abubi balandaki baposa na bango, na bozangi boyebi. Nani akokamba oyo Allah abungisi mpe bakozalaka na mosungi te

30Balóla elongi nayo mobimba тропа lingomba ya bomoko bwa Allah. Yango nde lolenge Allah akelaki bato na yango, mbongwama ezali te kati ya bokeli ya Allah, oyo nde lingomba ya semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te

31Bozonga epai naye (na botubeli), mpe bobanga ye, mpe botelemisa losambo mpe bozala o kati ya basangisi te

32O kati ya baye bakaboli lingomba lia bango mpe bakomisi yango binzambe nzambe, eteni na eteni ezali kosepela na oyo ya ye

33Mpe tango mabe ekoyelaka bato, babeleli Nkolo wa bango mpe bamizongisi epai naye na botubeli bonso, sima soki amekisi bango ndambu ya ngolu kowuta epai naye, okomona ndambu kati na bango babandi kosangisa Nkolo wa bango

34Bapengwa na maye topesi bango. Mpe bosepela moke, kasi bokoyeba kala mingi te

35To mpe tokitiselaki bango bokonzi (buku) azali kolobela bango тропа maye bazalaki kosangisa ye na yango

36Mpe tango tomekisaka bato ndambu ya mawa (na biso), bazali kosepela na yango. Mpe tango mabe ezui bango na oyo bango moko basali, okomona bango bazangi kolikia

37Boye bazali kornona te ete Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko? Ya soló wana ezali elembo mpo bato bakoka kondima

38Mpe pesa moto ya libota nayo oyo esengeli тропа kopesa ye, mpe mobola, mpe moleki nzela oyo esengeli ya bango, wana ezali malamu тропа baye bazali koluka elongi ya Allah, mpe bango wana nde balongi

39Mpe maye manso bozali kobimisa ewuti na ekotama тропа kokolisa misolo mia bino likolo ya baninga, ekokolisama te epai ya Allah, kasi oyo bobimisi kowuta na zakat, тропа koluka elongi ya Allah, baye wana bakozua (lifuta) na bango ya kobakisama

40Allah nde akeli bino, тре apeși bino bozui, тре akoboma bino, тре sima akosekwisa bino. Na yango, moko kati ya baye bozali kosangisa ye na yango boye akoki kosalela bino eloko moko na oyo Allah asaleli bino? Nkembo naye oyo aleki na likolo na maye manso bazali kosangisa ye na yango

41Mabe esili котопапа polele likolo ya mabele mpe likolo ya mayi (ebale) kowuta na maye bato bazali kosala, na yango, Allah apeși bango ndambu ya etumbu ya maye basali, mpo bakanisa kozonga

42Loba: Botambola na mokili bótala lolenge kani basalaki baye balekaki liboso na bino, kasi ebele na bango bazalaki basangisi

43Tiya elongi nayo na lingomba lia (bosóló mpe lia botosi), yambo ete eya kowuta na Allah mokolo oyo bokokokaka kopuşa yango te, mpe mokolo wana (bato) bakokabwanaka

44Oyo akopengwa, akozua lifuta ya bopengwi naye, mpe oyo akosala bolamu, ezali тропа bolamu ya bango moko ya lobi nde bazali kolengele

45Mpo Allah afuta bandimi baye basalaki misala milamu тропа bolamu bwa ye. Ya soló, ye alingaka bapengwi te

46Mpe o kati ya bilembo bia ye, azali kotinda mopepe lokola sango elamu mpe тропа komekisa bino ngolu naye, mpo ete bwato (masuwa) etambola na mokano naye, mpo ete boluka litomba na bolamu naye, mpo bokoka kotondo ye na yango

47Mpe ya solo, tosilaki kotinda batindami liboso nayo epai ya bato na bango, bayelaki bango bilembo ya polele mpe bikamwiseli, na sima tokangaki baye basalaki mabe mpe ezalaki lotomo epai na biso ete tosunga bandimi

48Allah nde azali kotinda mopepe oyo ezali kotombola londende, mpe apanzaka yango na mapata ndenge alingi, na sima akaboli yango na biteni, na sima okomona mbula ezali kobima nakati na yango mpe soki asopi yango epai ya ba oyo alingi o kati ya bawumbu naye tala ndenge bakomi na esengo

49Nzoka nde bango liboso basilaki kozanga elikia

50Tala bilembo bia ngolu ya Allah ndenge azali kopesa bomoyi na mabele sima ya kokauka na yango. Ya soló, ye nde akopesaka bomoyi na baye bakufa, mpe azali na bokoki na biloko binso

51Mpe soki sima na yango totindi mopepe ya makasi ebebisi milona na bango mpe bamoni yango na langi ya mayi ya mosaka bakomi kozanga botondi

52Ya solo, okoki koyokisa bawei te, mpe okoki koyokisa bakufi matoyi te, soki obengi bango tango bapesaka mokongo

53Mpe ezali yo te nde okoki kokamba baye bakufa miso na bobungi bwa bango, okoyokisa nde baye bandimi na mikapo mia biso mpe bazali komisokia

54Allah nde akeli bino ya kolemba, sima apesi bino makasi, sima ya bokasi apesi bino bolembu na bopaka. Akelaka oyo alingi mpe azali moyebi akoka

55Mpe tango mokolo ya suka ekotelema bato mabe bakolapaka ete bawumelaki na mokili sé ngonga moko ya mpamba, ndenge wana nde bazalaka kokosa

56Mpe baye bapesamaki boyebi na bondimi bakolobaka: Bosilaki kovanda na eleko eye engebene na mokano ya Allah kino o mokolo mwa bosekwisami. Oyo nde mokolo yango, kasi bozalaki koyeba te

57Mokolo mona bolimbisi ekosunga te тропа babubi, mpe bakosenga bango te ete bazonga

58Ya soló, tosili kobetela bato bandakisa ya lolenge nyoso kati na kurani eye. Mpe soki oyeli bango ekamwiseli, baye bapengwa bakomi koloba ete; bozali sé babungisi

59Lolenge wana nde Allah akangaka mitema mia bato oyo bayebi te

60Kanga motema na kozela. Ya solo, elaka ya Nkolo nayo ezali ya sólo mpenza, kasi baye bazangi kondima babungisa yo te

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath