26. Ash-Shu'araa, oyo azali na mbongo mingi
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Twâ, sín, mîm
2Oyo nde mikapo mia buku ya polele
3Ozali komitungisa mpo été baboyi kondima
4Soki tolingaki mbele tokitisaki bilembo epai na bango kowuta о likolo, bakingo na bango elingaki kogumbama. (na soni)
5Мре tango nyoso lilendisi ya sika likoyela bango kowuta epai ya Ar-Rahmân, sé bakopesa yango mokongo
6Baboyaki kondima, (na makambo nyoso oyo ewutaki epai ya Nkolo wa bango) kala te bakoyelaka bango basango тропа maye bazalaki kotiola na yango
7Boye bazali kornona mabele te boni tokolisaki kati na yango (milona mibale mibale) na lolenge ya malamu
8Ya soló, wana ezali elembo. Kasi ebele kati na bango bazali kondima te
9Mpe ya soló, Nkolo wa yo azali wa bokasi atonda ngolu
10Mpe tango Nkolo wayo abengaki Mûssa, kende epai ya bato ya mabe
11Bato ya falo. Bazali kobanga (Allah) te
12Alobi: Nkolo, ya sólo nazali kobanga ete bandimela ngai te
13Ntolo na ngai ezali ya kokangama, mpe lolemu na ngai elobaka malamu te, tinda yango epai ya Hâruna
14Mpe nazali na mabe oyo nasala bango, na yango nazali kobanga été noki bakoboma ngai
15(Allah ayebisaki ye): Eloko ezali te, bökende bino mibale na bilembo bia biso, tokozala elongo na bino tozali koyoka
16Bökende epai ya falo bino mibale, boyebisa ye ete, Nkolo ya mokili nde atindi biso ya sólo
17Mpo opesa biso bana ya isalayele
18Falo alobi: Tobokoloki yo te kowuta bolenge?, mpe tovandaki nayo bamibu ebele te
19Мре osalaki maye osalaki, mpe ozalaki kati ya bapengwi
20Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba
21Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami
22Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo
23(Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo
24(Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te
25Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te
26(Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala
27(Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma
28(Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba
29(Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko
30(Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele
31(Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló
32(Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola
33Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala
34(Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi
35Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini
36Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana)
37Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi
38Banganga basangani o mokolo mwa elaka
39Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te
40Mpo tolanda banganga soki bango balongi
41Mpe tango banganga bakomi epai ya falo balobi naye été: Boye tozali na lifuta soki tolongi
42(Falo) alobi: Iyo, ya soló, nakotiya bino pembeni na ngai
43Mûssa ayebisi bango: Bobwaka oyo bolingi kobwaka
44Mpe babwaki basinga na bamangenda na bango, (mpe balobi): Na nguya ya falo ya sólo, tokolonga
45Mpe Mûssa abwaki lingenda lia ye, mpe tala emeli nyoso oyo basalaki
46Mpe banganga nyoso bakweyaki na kofukama
47Balobi: Tondimi na Nkolo wa molongo
48Nkolo ya Mûssa na Hânına
49(Falo) alobi: Bondimi naye yambo ete napesa bino ndingisa! Ya sólo, ye nde mokonzi ya bino oyo alakisaki bino bonganga, bokoyeba kala te. Nakokata bino maboko na makolo na lolenge ya bokeseni, mpe nakobaka bino banso na nzete
50Banganga balobi: Mabe ezali te, pamba te, mpo tokozongaka ya soló epai ya Nkolo wa biso
51Ya soló, posa na biso ezali ete Nkolo wa biso alimbisa biso, mpo tozali bato ya yambo тропа kondima (ye Allah)
52Mpe toyebisaki na Mûssa ete: Akende na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ya soló bakolanda bino
53Мре falo atindi été basangisa bato ya mboka
54Ete: Ya sólo, bato oyo bazali токе
55Мре ya sólo, balongi biso
56Kasi biso banso tozali na bokebi
57Mpe tobimisaki bango na bilanga mpe mingala
58Bamaziba ya bomengo mpe bisika ya lokumu
59Lolenge moko topesaki bokitani na bana ya isalayele
60Mpe balandaki bango na ntongo makasi
61Mpe tango mapinga mibale bamonani; bato ya Mûssa balobaki été: Ya sólo, biso tosili kozuama (bato ya Mûssa bakanisaki été bakokanga bango ya soló)
62(Mûssa) alobi te. Ya soló Nkolo wa ngai azali elongo na ngai, akokamba ngai
63Mpe topesaki emoniseli epai ya Mûssa ete; beta lingenda lia yo na ebale mpe ekabwani na mibale lokola ngomba ya monene
64Mpe totikaki ete baye wana bapusana. (Falo na bato naye)
65Mpe tolongisaki Mûssa na bato naye banso oyo bazalaki elongo naye
66Sima, tozindisaki basusu (banguna)
67Ya sólo, wana ezali elembo. Ebele kati na bango bazali kondima te
68Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
69Mpe tángela bango sango ya Ibrâhîm
70Tango alobaki na tata naye mpe bato naye: Nini bozali kobondela
71Balobaki: Tozali kobondela bikeko, mpe tokokangama sé na yango
72Alobi: Boye bayokaka bino tango bosengaka bango
73То boye basalisaka bino to mpe banyokoloko bino
74Balobi: Tokutaki bankoko na biso ya kala bazali sé ndenge wana
75Alobi: Bososoli mpenza тропа oyo bozali kobondela
76Bino na bankoko na bino ya kala
77Bango banso bazali banguna na ngai, longola sé Nkolo wa molongo
78Oyo akelaki ngai mpe azali kokamba ngai
79Mpe ye nde aleisaka ngai, mpe amelisaka ngai
80Mpe tango nabeleke, ye nde abikisaka ngai
81Mpe ye nde akoboma ngai, sima akosekwisa ngai
82Mpe nazali kolikia ete alimbisa ngai masumu omokolo mwa suka
83Nkolo! Pesa ngai bwanya (mpe boyebi), mpe tia ngai elongo na bato ya malamu
84Tika ete lolemu na ngai eloba bosoló epai ya basusu
85Mpe tiya ngai nazala okati ya bakitani ya lola ya kitoko
86Mpe limbisa tata wa ngai mpo azalaki 0 kati ya babungi
87Suratu Ach-Chu’arâ Eteni 19 Л
88Mpe koyokisa ngai nsoni te o mokolo ya lisekwa
89Mokolo moye misolo na bana bakosalisaka te
90Longola sé oyo akoya epai ya Allah na motema ya malamu. (Motema molamu ya kopetoama)
91Bakopusanisaka lola pembeni ya babangi (Allah)
92Mpe bakomonisaka bato mabe moto
93Mpe bakolobelaka bango: Wapi maye bozalaki kobondela
94Na botiki Allah, boye bazali kosunga bino? To mpe bango moko bazali komisunga
95Mpe bakobwakama na moto bipai na bipai na bilongi na bango, na baye bapengwisaki bango
96Na basoda banso ya Satana (ibilisa)
97Bakolobaka: Mpe bazali kosuana okati na yango
98Na Allah! Ya soló, tozalaki na libunga ya polele
99Tozalaki kokokisa bino lokola Nkolo ya mokili
100Kasi ezali sé batomboki nde babungisaki biso
101Ata moninga ya soló soló azali te
102Soki tozuaka nzela ya bozongi (ata na mokili), tolingaki kozala okati ya bandimi. (baye bazali kosala bolamu)
103Ya sólo, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazali kondima te
104Mpe ya sólo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
105Bato ya Nûh bazangaki kondimela batindami, bazuaki bango bato ya lokuta
106Tango ndeko wa bango Nûh ayebisaki bango: Boye bokobanga (Allah) te
107Ya sólo, nazali motindami malamu тропа bino
108Bobanga Allah mpe botosa ngai
109Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai lizali sé epai na Nkolo wa molongo
110Bobanga Allah mpe botosa ngai. İli. Balobaki: Tondimelayo! Kasi
111ezali sé bato bazanga ntina, nde balandaka yo
112Alobi: Nayebi te maye bazali kosala
113Lifuta na bango etali sé Nkolo wa ngai, soki bozali koyeba
114Nazali oyo abenganaka bandimi te
115Kasi nazali sé mokebisi ya polele
116Balobi: Nûh! Soki otiki te, okozala o kati ya baye tokoboma na mabanga
117Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Bato na ngai bazali kondimela ngai te
118Lakisa bosôló kati kati na ngai na bango, mpe bikisa ngai na baye bazali elongo na ngai kati ya bandimi
119Mpe tolongisaki ye na baye bazalaki elongo naye o kati ya masuwa oyo ezalaki ya kotonda
120Mpe sima tozindisaki baye batikalaki (bapengwi oyo bazangaki bondimi)
121Ya soló, wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
122Mpe ya solo, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
123Ba aad mpe baboyaki kondimela batindami
124Tango ndeko wa bango Hûd ayebisaki bango: Boye bozali kobanga te
125Ya soló, nazali motindami malamu epai na bino
126Bobanga Allah mpe botosa ngai
127Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
128Boye bozali kotonga bikeko na ngomba nyoso тропа kokumisa
129Mpe bozali kotonga bandako ya minene lokola bokotikala libela awa na mokili
130Mpe soki bopesi etumbu, bozalaka na mawa te, mpe bobimi bato ya makasi
131Bobanga Allah mpe botosa ngai
132Bobanga oyo azali kopesa bino bolamu, na nyoso oyo boyebi
133Oyo apesi bino banyama na bana
134Mpe bilanga na miluka
135Ya sôló, nazali kobangela bino etumbu 0 mokolo mwa suka
136Balobi: Olendisa biso to olendisa te, ezali sé lolenge moko
137Ezali sé ezaleli ya bato ya kala
138Mpe tokozuaka etumbu te
139Baboyaki kondimela ye, mpe tobomaki bango, ya soló wana ezali elembo. Mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
140Mpe ya soló, Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
141Ba Thamûd, baboyaki mpe kondimela batindami
142Tango ndeko wa bango Swâlih ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te
143Nazali motindami malamu epai na bino
144Bobanga Allah mpe botosa ngai
145Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
146Boye bokotikalaka na kimiya тропа maye bozali kosala
147O kati ya bilanga mpe mingala
148Milona mpe banzete ya nagh’l mpe ya mbuma kitoko
149Boye bozali kotonga bandako o likolo lia ba ngomba
150Bobanga Allah mpe botosa ngai
151Kasi botosa makambo ya balekisi ndelo te
152Baye bazali sé kobebisa o kati ya mabele mpe balingi kobongisa te
153Balobi: Ya soló, ozali sé o kati ya balokami
154Ozali sé moto lokola biso, yaka na elembo soki ozali kati ya balobi bosôló
155Alobi: Nâqah oyo azali na mokolo naye ya komela mayi, bino mpe bozali na mokolo ya komela (kozua) mayi
156Mpe bosala ye mabe te, noki te, etumbu monene ekozua bino mokolo moko boye
157Kasi babomaki ye, mpe na sima bakomaki kolela
158Mpe topesaki bango etumbu, wana ezali elembo kasi ebele na bango bazalaki kondima te
159Mpe Nkolo wayo azali ya sólo na bokasi atonda ngolu
160Bato ya Loth baboyaki mpe kondimela batindami
161Tango ndeko wa bango Loth ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te
162Nazali motindami malamu тропа bino
163Bobanga Allah mpe botosa ngai
164Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
165Boye bozali kosalela posa ya nzoto bino mibali na mibali o kati na mokili
166Mpe botiki basi oyo Nkolo wa bino akela тропа bino? Kasi bozali bato ya masumu (balekisi ndelo mpe babuki mibeko)
167Balobi: Eh Loth! Soki otiki te, tokobimisa yo (na mboka)
168Alobi: Ya soló, ngai naboyi maye bozali kosala
169Nkolo, longisa ngai elongo na libota lia ngai тропа maye bazali kosala
170Tolongisaki ye elongo na libota lia ye bango banso
171Longola sé mobange ya mwasi atikalaki elongo na baye bazuaki etumbu
172Sima, tobomaki basusu baye batikalaki
173Mpe tobetiselaki bango mbula (ya mabanga), mpe mbula nini ya mabe ya motindo wana тропа baye tokebisaki
174Ya soló, wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
175Mpe Nkolo wayo azali na bokasi atonda ngolu
176Bato ya aîkat, baboyaki kondimela batindami
177Tango ndeko wa bango Shuaîb ayebisaki bango: Boye bozali kobanga (Allah) te
178Nazali motindami malamu epai na bino
179Bobanga Allah mpe botosa ngai
180Mpe nakosenga bino yango lifuta te, kasi lifuta lia ngai litali sé Nkolo wa molongo
181Mpe bokokisa bimekelo ya bitando na ndenge esengeli, kasi bozangisa yango te
182Mpe botondisa emekelo na bosembo
183Mpe bobuba bato te na bimekelo na bango, mpe bosala mabe kati na mokili te, (mpe bosomba bosembo ya bato na misolo te)
184Mpe bobanga oyo akeli bino na baye baleka liboso na bino
185Balobi: Ya soló, ozali kati ya balokami
186Mpe ozali sé moto lokola biso, mpe tozali kokanisa ete ozali kati ya babuki lokuta
187Kweisela biso ndambu ya mapata soki ozali koloba bosölo
188Alobi: Nkolo wa ngai ayebi maye manso bozali kosala
189Kasi baboyaki kondimela ye, mpe topesaki bango etumbu o mokolo moye mapata eyindaki, ya solo, yango ezalaki nde mokolo ya etumbu monene
190Wana ezali elembo, mpe ebele kati na bango bazalaki kondima te
191Mpe ya soló, Nkolo wayo azali wa bokasi atonda ngolu
192Ya sólo, yango (kurani) eye, ekitisamaki kowuta epai ya Nkolo wa molongo
193Molimo mosantu (anzelu gabiliyele) akitaki na yango
194Na motema nayo mpo ozala okati ya bakebisi
195Na lokota ya arabo oyo ezali polele
196Mpe yango esilaka kokomama na makomi ya batindami ya kala
197Boye ezalaki elembo te тропа bango, mpo banganga nzambe ya bana ya isalayele bakoka koyeba yango
198Mpe soki tokitisaki yango epai ya moto oyo azali arabo te
199Mpe atangela bango yango mbele bandimaki na yango te
200Lolenge wana nde tokitisaki (koyimayima ezala) 0 mitema mia batomboki
201Bakondimaka na yango te kino bakomonaka etumbu ya makasi
202Ekoyela bango mbalakaka, bakoyebaka te
203Mpe bazali koloba ete: Boye tokozelisama? (mpo tokoka kondima)
204Boye! Etumbu na biso nde bazali kowelisa
205Boye ozali kornona te, soki topesaki bango mua mibu po basakana
206Sima maye balakamaki ekomelaki bango
207Esengo eye bazalaki na yango esalisaki bango na eloko te
208Mpe tobomaka mboka te, sé totinda bakebisi liboso
209(Mpona) kokebisa, mpe tozali babubi te
210Mpe ezalaki basatana nde bakiti nayango te (kurani)
211Mpe esengeli na bango te, mpe bazali na makoki ya kosala yango te
212(Kasi) ya soló, bango bamitiye mosika mpona koyoka
213Mpe kobondela nzambe mosusu te elongo na Allah, noki te okozuama 0 kati ya bato ya etumbu
214Mpe kebisa libota nayo ya pene
215Mpe kitisa mapeka nayo (zala malamu) mpona bandimi oyo bazali kolanda yo
216Mpe soki baboyi kotosa yo, loba na bango ete: Ya soló ngai na nazali mosika na maye bozali kosala
217Mpe mipesa epai ya oyo azali na bokasi atonda mawa
218Oyo amonaka yo tango otelemaka
219Mpe (amonaka) yo tango ogumbamaka
220Ya soló, ye azali moyoki mpe moyebi
221Boye nayebisa bino epai ya nani basatana bazali kokita
222Bazali kokita epai ya bato ya lokuta basumuki
223Batiyaka matoyi kasi ebele na bango bazali bakosi
224Kasi epai ya bato ya másese (masapo), elandaka bango sé baye babunga
225Boye omoni te ete bazali kolekaleka kati kati ya ba ngomba (mibale)
226Mpe ya sólo, bango balobaka maye basalaka te
227Longola sé baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, mpe bazali kokumisa Allah mingi, mpe bamisalisi na kopamela mabe ya babubi, kasi babubi bakoyebaka kala mingi te ba nani ekobebela bango
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath