23. Al-Muminoon, oyo azali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Bandimi basila kolonga
2Baye bamikitisaka tango bazali kosambela
3Mpe baye bazali kokima (makambo) maye mazanga ntina
4Mpe baye bazali kobimisa zakat
5Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo
6Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te
7Na yango, moto oyo akoluka kolekisa ndelo wana, bango nde babuki mibeko
8Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango
9Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango
10Bango nde bakitani
11Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango
12Mpe tosilaki kokela moto na mabele ya potopoto
13Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi
14Sima tokomisaki mayi liboke ya makila sima makila ekomi mosuni, sima mosuni ekomi mokuwa, sima tolatisi mokuwa mosuni, sima tosali ye ekelamu mosusu. Mapamboli manso mazali ya Allah mokeli ya malamu
15Sima na yango bokokufaka ya soló
16Sima bokosekwisamaka ya soló o mokolo mwa suka
17Мре tosilaki kokela o likolo na bino mapata sambo, mpe tozangaki bokebi te o tango ya bokeli
18Mpe tozali kokitisa mayi kowuta o likolo na bokoki (mayi wana eleka ebele te), sima tovandisi yango na mabele, mpe tozali na bokoki ya kobungisa yango
19Mpe kowuta na yango nde tozali kobimisela bino bilanga ya naghil na a’nâb, yango wana bozali na bambuma ebele, mpe bozali kolia bisusu o kati na yango
20Na nzete esusu ebimi na ngomba ya sinaî, ezali kobimisa mafuta тропа bopakoli тре тропа baleyi
21Mpe ya soló, bibwele bizali liteya тропа bino, tozali komelisa bino maye mazali kobima na mabumu na yango (miliki) тре bizali kosalisa bino mingi, тре bozali kólia bisusu kati na yango
22Mpe na yango na bamasuwa bozali kokumbama
23Mpe tosilaki kotinda Nûh epai na bato naye alobi: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye. Boye bozali kobanga te
24Mpe bankumu bapengwi okati na bato naye balobi: Nini oyo, azali moto lokola bino. Alingi amatela bino, soki Allah alingaka, (kotinda ntoma) mbele akitisaki ba anzelu. Makambo oyo totikala koyoka yango epai ya bankoko na biso ya kala te
25Oyo sé moto ya ligboma, bótala ye sima ya tango токе
26Alobi: Nkolo wa ngai, sunga ngai mpo bazwi ngai moto ya lokuta
27Tomonisaki naye ete; salamasuwa na miso na biso mpe na mitindo mia biso mpe tango mokano na biso ekoya mpe mayi ekobima na makasi na litumbu, kotisa na kati ya masuwa balolenge ya banyama moko na moko mwasi na mobali elongo na libota nayo, longola sé baye kati na bango liloba lisengeli likokisama likolo na bango. Kasi kotuna ngai te mpo na babubi, mpo ete bakozinda mbalakaka na mayi (bakokufa)
28Mpe soki omati na masuwa yo na ba oyo ozali na bango, loba: Lokumu ya Allah oyo alongisi biso likolo ya bato mabe
29Mpe loba: Nkolo kitisa ngai na esika ya mapamboli, mpe yo nde mokitisi ya malamu
30Ya soló, wana nde bilembo. Mpe tozali ya sólo baye topesaka komekama
31Sima na bango tokelaki bato basusu
32Mpe totindelaki bango motindami kowuta kati na bango moko mpo ayebisa bango ete: Bobondela Allah, bozali na nzambe mosusu te ya kobondela na bosôló na botiki ye, boye bozali kobanga te
33Mpe bankumu kati na bato naye na baye baboya kondimela elaka ya suka mpe topesi bango bolamu awa na nsé, balobi: Ye azali moto lokola bino, aliaka biloko oyo boliaka, mpe amelaka oyo bomelaka
34Kasi soki botosi moto oyo azali lokola bino, wana bosili kozanga
35Boye azali kolaka bino ete: Soki bokufi mpe bokomi putulu mpe mikuwa, ete bokobima (na malita)
36Mosika mosika тропа oyo bazali kolaka bino
37Wana ezali sé bomoyi ya biso oyo ya nsé, tozali kofanda mpe tozali kokufa kasi tokosekwa te
38Wana azali moto oyo azali kobukela Allah lokuta, mpe tokondimelaka ye te
39Alobi: Nkolo, sunga ngai mpo ete bazwi ngai moto wa lokuta
40(Allah) alobi: Iyo; kala mingi te bakokoma na mawa
41Mpe ligangi esimbaki bango na bosôló, mpe tokomisaki bango lokola makasa ya kokawuka (mpe bakumbami na mayi makasi), mpe libebi тропа babubi
42Sima na bango tokelaki bato basusu
43Mokano ya umma nyoso mokoki koleka eleko na yango te, mpe ekokutuama te
44Sima totindaki batindami na biso ya kolandisa, tango nyoso motindami akoyaka na umma moko bazui ye moto ya lokuta, mpe tolandisaki bango na bango, mpe tobetelaki bango másese (ya kokamwisa mpe kobangisa bango) mpe libebi тропа baye bandimaka te
45Sima totindaki Mûssa na ndeko waye Hânına na bilembo bia biso mpe bokonzi ya polele
46Epai ya falo na bankumu naye, (bato naye), basali lolendo, mpe bazalaki bato ya lolendo koleka
47Balobi: Tondimela bato mibale oyo bazali lokola biso, mpe bato na bango bazali bawumbu na biso
48Bazui bango nyoso mibale ete bazali bato ya lokuta, mpe bazuamaki kati ya baye babebisamaki. buku mpo tango mosusu bakokambama
49Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku mpo tango mosusu bakokambama
50Mpe totiyaki mwana ya Maryam na mama waye mpo (bazala) elembo, mpe totombolaki bango nyoso mibale na esika ya likolo na ngomba, eye ezali na kimia mpe na mayi ebele
51Eh bino batindami! Boliya bilei ya malamu mpe bosala malamu. Ya soló, ngai nayebi maye bozali kosala
52Mpe umma na bino oyo ezali sé umma moko, mpe ngai nde Nkolo na bino bobanga ngai
53Mpe bakabwani na makambo ya lingomba lia bango biteni biteni moto na moto azali kosepela na o ya ye
54Tika bango na libungi kino mwa ngonga moke
55Bazali kokanisa te, misolo na bana oyo tondimeli bango
56Tozali kopesa bango bolamu na lombango. Kasi bazali koyeba te
57Ya soló, baye na ntina ya bobangi Nkolo wa bango, batondisami na mawa
58Mpe baye bazali kondima na mikapo mia Nkolo wa bango
59Mpe baye basangisaka Nkolo wa bango na eloko te
60Mpe baye bazali kobimisa maye bapesi bango wana mitema mia bango mitondisami na bobangi (Nkolo wa bango), po bakozongaka epai ya Nkolo wa bango
61Baye wana bazali kowelisa тропа kosala bolamu, mpe bazali bato ya yambo тропа kosala (yango)
62Mpe topesaka moto mokumba te sé oyo ekoki naye, mpe buku oyo ezali koloba bosembo ezali nde epai na biso mpe bakobubama te
63Kasi mitema mia bango mitondi na libungi тропа (kurani) oyo, mpe bazali na misala misusu bazali kosala (bazali kosalela yango na lolenge esengeli te oyo Allah atindi)
64Kino tokomekisaka bato ya bozwi etumbu 0 kati na bango. Mpe okomona bango bakomi koganga тропа kosenga lisalisi
65Boganga lelo te. Ya soló, bokozua lisungi na biso ata шоке te
66Bozalaki koboya mikapo mia ngai miye bazalaki kotangela bino liboso
67(Bozalaki) kosalela yango lolendo mpe kotiola yango na tango miso na bino ezalaki polele
68Boye bazali komanyola liloba na oyo te (kurani) to eyeli bango oyo eyelaki bankoko na bango te
69To bayebaki motindami na bango te, mpo ete baboya ye
70To, bazali koloba ete azali ligboma? Kasi ayelaki bango na bosôló, mpe ebele na bango bazali kondima te
71Soki bosôló eyaki тропа kolanda bamposa na bango mbele mapata mpe mabele na maye mazali okati na yango malingaki kobeba, nzoka nde toyelaki bango bokundoli na bango mpe bango тропа bokundoli na bango bazali kopesa mokongo
72To ozali kotuna bango lifuta? Kasi lifuta ya Nkolo nayo nde ezali malamu, ye mopesi bomengo ya malamu
73Mpe ya soló, ozali kobenga bango na nzela ya semba
74Mpe baye bandimaka te o mokolo mwa suka, bazali mosika na nzela yango
75Mpe soki topesaki bango ngolu na biso, mpe tolongola bango mpasi oyo bazalaki na yango, balingaki kotikala sé na masumu na bango mpe bakozinda mpenza kati na botomboki na bango
76Mpe tosilaki kopesa bango etumbu, kasi batosaki Nkolo wa bango te, mpe bamilelaki epai naye te (epai na Allah), тропа kosenga
77Kino tokofungolela bango ezibeli ya etumbu ya makasi, mpe bakozanga elikia (тропа bolamu ya Allah)
78Mpe ye nde akela тропа bino, bomoni na boyoki na mitema, kasi bozali kotondo ye sé токе
79Ye nde akela bino mpe ati bino o mabele, bokosangisama epai naye
80Ye nde mopesi bomoyi mpe mopesi liwa, mpe ye nde mokesenisi butu na mokolo, boye bozali kokanisa te
81Kasi balobaki se maye bato wa yambo balobaka
82Balobi: Tango tokokufaka, tokokomaka putulu mpe mikuwa. Ya soló, boye tokosekwisamaka lisusu
83Basila kolaka biso na batata na biso liboso тропа oyo, yango ezali sé masapo ya kala
84Loba: Mabele na oyo ezali okati na yango ezali ya nani? Soki soló bozali koyeba
85Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bozali kokanisa te
86Loba: Mapata sambo ezali ya nani, тре nani Nkolo ngwende ya monene
87Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Boye bokobanga te
88Loba: Bokonzi bonso bosimbami na maboko ya nani? Azali kobatela, kasi babatelaka ye te, soki ya soló bozali koyeba
89Bakolobaka: Ezali ya Allah. Loba: Kasi тропа nini bozali lokola balokami? (тропа kozanga na bango kondima na bomoko ya nzambe)
90Tomemelaki bango bosóló, kasi bango nde bato ya lokuta
91Allah azali na mwana te, mpe ezali na nzambe mosusu te elongo naye, noki te, nzambe na nzambe alingaki kokende na bikelamu naye mpe basusu balingaki kozala likolo ya baninga. Nkembo mpe lokumu na Allah likolo ya maye bazali kolobela
92Ayebi mabombami mpe makambo ya polele, azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango
93Loba: Nkolo; soki olakisaki ngai maye balakami
94(Na yango) Nkolo, kotika ngai o kati ya babubi te
95Ya soló, tozali na bokoki ya kolakisa yo maye tolaki bango
96Bengana mabe (kobongola) na kosala bolamu. Soló, toyebi malamu maye bazali kolobela
97Mpe loba Nkolo nazali kosenga nayo libateli тропа botombokisi ya basatana
98Mpe nazali kosenga nayo libateli Nkolo, ete bazala pene na ngai te
99Kino soki liwa ekomeli moko kati na bango akolobaka: Nkolo wa ngai, zongisa ngai
100Mpo nasala bolamu na maye natikaki na mokili, te, kasi ezali sé liloba oyo alobi, osima na bango ezali na ndelo, kino omokolo ya bosekwisami
101Мре tango bakobetaka to kofula kelelo, mokolo wana kibondeko ekozalaka te, mpe bakotunanaka mituna te
102Baye emekelo na bango ekoleka kilo mingi, (тропа bolamu), bango nde balongi
103Mpe baye emekelo na bango ekozalaka fafala, bango moko nde bamibungisaki, mpe bakokotaka lifelo, mpe bakozalaka libela o kati na yango
104Moto mokozikisa bilongi bia bango, mpe bakozala o kati na yango na mbebo yakozikisama
105Mitangelama bino mikapo mia ngai te, kasi bozalaki kondimela yango te
106Bakolobaka: Nkolo wa biso, bamabe na biso elongi biso mpe tozalaki babungi nzela
107Nkolo wa biso, bimisa biso okati na yango, mpe soki tozongeli, tokozala babubi
108Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te
109Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu
110Kasi botiolaki bango, kino ebosanisi bino kokumisa ngai, mpe bozalaki koseka bango
111Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi
112Bakotunaka bango, mibu boni bolekisaki o kati ya mokili
113Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)
114Akolobaka: Bovandaki sé tango ya mokie, ya sólo soki bozali koyeba
115Boye bozali kokanisa ete tokelaki bino natina te, mpe bokozongisama epai na biso te
116Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu
117Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te
118Mpe loba: Nkolo limbisa mpe tiya ngolu, yo nde oleki na ngolu
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath