17. Al-Israa azali moto ya mayele
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Lokumu na oyo asalisaki mowumbu naye (ntoma Muhammad) mobembo mwa butu, kobanda na ndako esantu ya Makkah kino na ndako esantu ya Aq’swa (yelusaleme) oyo tosilaki kopambola zinga zinga na yango mpo été tolakisa ye bilembo bia biso, ya sôló ye azali moyoki amonaka manso
2Мре topesaki Mûssa buku, mpe totiyaki yango ezala bokambi тропа bana ba isalayele, mpe toyebisaki bango été bozua mobateli mosusu te kotika ngai
3Bakitani baye tomemaki elongo na Núh. Ya sôló, ye azalaki mowumbu wa botondi
4Mpe toyebisaki na bana isalayele na kati ya buku ete bokobebisa mbala mibale okati ya mokili mpe bokolutisa ndelo
5Mpe tango elaka ya etumbu moko ya mibale ekomaki, totindelaki bino bawumbu na biso ya makasi bakotela bino na ndako, mpe elaka ekokisamaki
6Sima na yango, topesaki bino elonga likolo na bango, mpe topesaki bino bozui mpe bana, mpe na sima tokomisaki bino ebele
7Soki bosali malamu ezali тропа bino moko, soki mpe bosali mabe ezali sé bongo. Mpe soki elaka ya suka ekomi mpo babebisa bino bilongi na kosala bino mabe mpe bakota o ndako nzambe ndenge bakotaki mbala ya yambo тропа kobebisa maye bazuaki na kati
8Tango mosusu Nkolo wa bino akoyokela bino mawa. Mpe soki bozongeli tokozongela, tosalaki moto mwa lifelo тропа bapengwi baye bazangaki kotosa
9Ya soló kurani oyo, ezali kokamba na oyo ezali ya semba, mpe ezali kopesa sango malamu epai ya bandimi baye bazali kosala misala ya malamu ete bakozala na lifuta ya monene
10Mpona baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, tobombeli bango etumbu ya makasi
11Mpe moto azali komilukela mabe, (komisengela mabe) ndenge amilukelaka bolamu, kasi moto azali penza na bowelisi
12Мре tokelaki butu na moyi bizala bilembo mibale, mpe tobombaki elembo ya butu mpe tomonisi elembo ya moyi, (ezala ya komonana) mpo boluka bolamu ya Nkolo wa bino, mpe mpo esalisa bino na koyeba motango mpe mibu. Kasi ya soló, tolimbolaki biloko binso bizala polele penza
13Mpe tokangeli moto na moto misala mia ye na kingo naye, mpe o mokolo mwa suka tokobimisela ye yango nyoso polele
14Tanga makomi nayo; lelo yo moko okoki kozala zuzi ya makambo nayo. (yo moko)
15Oyó akopona nzela ya semba, amisemboli sé ye moko, mpe oyo akopona libungi, amibungisi sé ye moko. Kasi moto akomemaka mokumba ya moninga te (mokumba ya masumu), mpe topesaka etumbu na bato te kino totinda motindami
16Mpe soki tolingi koboma mboka moko boye, totindaka na bazwi na yango batosa mibeko mia biso, kasi soki baboyi kotosa mpe babebisi, mpe sima na yango esengeli ete liloba likokisama, mpe tobomi bango mobimba
17Mabota ebele toboma o sima ya Nûh, kasi Nkolo wayo akoki naye moko mpo na koyeba mpe kornona masumu ya bawumbu naye
18Oyo alingi azua bomoyi na lombango, tozali mbangu тропа kopesa ye oyo tolingi, sima tokopesa ye móto mwa lifelo oyo akozika okati na yango, na kosila lokumu, mpe na kozala mosika na ngolu
19Mpe oyo akolinga bomoyi bwa lola, mpe akosala makasi oyo esengeli na yango mpe azali mondimi, bango wana nde molende na bango ekokumisama
20Topesaka ebele na moto nyoso, ba oyo, mpe ba oyo kuna, makabo ya Nkolo nayo. Mpe makabo ya Nkolo nayo ezangaka moto moko te
21Tala ndenge tozali kotiya basusu likolo ya basusu. Kasi bomoi bwa lola nde ezwami na molongo mpe na lokumu koleka
22Kosangisa Allah na nzambe mosusu te, noki te okomikuta o kati ya baboyami mpe bakweisami
23Mpe Nkolo wayo asilaki kozua mokano ete; Bobondela te sé ye mei, mpe bozala malamu na ba boti na bino. Soki kimobange ekomeli moko kati na bango mibale na maboko nayo to bango banso babale kofiotola bango te, mpe kotombokela bango te, kaši žala na bango malamu тре lobela bango maloba ya kitoko
24Mpe тропа mawa, kitisela bango lipapu ya ngolu mpe oloba ete: Oh Nkolo wa ngai! Yokela bango mawa ndenge babokoloki ngai uta mwana токе
25Nkolo wa bino ayebi malamu penza maye mazali o kati ya mitema mia bino, soki bozali bato malamu, ya soló azali molimbisi тропа baye batubelaka
26Mpe pesa bato ya libota nayo makoki na bango, mpe mobola, mpe moleki nzela, biye bisengeli тропа bango, kasi kolekisa ndelo te na kobebisa misolo pamba pamba
27Ya sólo, babebisi misolo pamba pamba bazali bandeko ya satana, mpe satana azangaki Nkolo naye botondi
28Soki otiki bango тропа koluka ngolu ya Nkolo wayo oyo ozali kolikia, loba na bango liloba lilamu
29Мре kokanga maboko nayo na kingo koleka te, (na kimopimi) mpe kotanda yango te koleka, noki te okomikuta okati ya batungisami mpe bato ya mpasi
30Ya soló, Nkolo wayo apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka. Mpe ya sólo, azali na sango mpe amonaka bawumbu naye
31Mpe boboma bana ba bino te тропа kobanga kimobola, biso nde toleisaka bango na bino mpe lokola. Ya sólo, koboma bango ezali lisumu monene
32Mpe bopusana pene na ekobo te, ya sólo, yango ezali mbindo mpe nzela ya mabe
33Mpe boboma te molimo moye Allah apekisaki, sé ezala na bosembo, kasi moto oyo babomi na bosembo te, biso tosili kopesa libota naye ndingisa ya kosenga makila naye, kasi alekisa ndelo te na koboma pamba te mpo ete asili kozua lisungi
34Mpe bopusana pembeni ya misolo mia muana ya etike te, (тропа koliya yango) sé ezala na lolenge loye londimami kino akokola, mpe bokokisa elaka. Ya sólo, тропа elaka bokotunamaka
35Мре bokokisa emekelo tango bozali komeka, mpe botia kilo ya semba. Wana nde lolenge ya malamu mpe ezali na lifuta ya kitoko. (тропа bino)
36Мре kolandaka te, (kotelema тре kolobela) maye ozali na boyebi bwa yango te, mpo été ya soló, boyoki, bomoni na motema nyonso wana akotunama тропа yango
37Мре kotambola o likolo lia mabele na lolendo te, solo okoki kopasola mabele te, mpe okoki кокота molai lokola bangomba te
38Nyonso wana ezali mabe mpe eyinami epai ya Nkolo way o
39(Manso) mana mazali maye Nkolo wayo atangisaki yo na bwanya, mpe kosangisa Allah na banzambe basusu te, noki te okobwakama o moto mwa lifelo moye mozali mosika na mawa ma Allah
40Boye Nkolo wa bino aponeli bino bana ya mibali mpe aponi ba anzelu bazala bana ya basi? Ya sólo, bozali kobimisa maloba ya mabe koleka
41Mpe tosilaki kolobela polele (kotiya lotomo) maye manso mazali o kati ya kurani mpo été (bato) bakanisa, kasi wana ezali kokimisa bango sé bokimisi ya mabe
42Loba: Soki ezalaki na banzambe mosusu elongo naye ndenge bazali koloba, balingaki koluka nzela ya Nkolo ngwende
43Lokumu naye, azali likolo koleka, mpe aleki maye bazali kolobela na bonene
44Mapata sambo na mabele, na manso mazuami o kati na yango, bazali kosanzola nkembo naye, mpe ezali na eloko moko te sé ezali kosanzola lokumu naye. Kasi bino nde bozali koyeba yango te. Ya soló, ye azali ngolu atonda bolimbisi
45Mpe tango ozali kotanga kurani, totiaka kati kati nayo na baye bazali kondima na mokolo mwa suka te ndelo, oyo ezali komonana te
46Mpe tozipi bango motema été basosola te, mpe matoyi na bango lokola. Mpe tango ozali kokumisa bomoko ya Nkolo wayo o kati na buku, bapesi mikongo na kokima (bakei kobondela mabondeli ya mabe)
47Toyebi malamu maye bazali koyoka, soki bayoki epai nayo, balobilobi nanse o kati na bango, babubi bakolobaka: Bozali kolanda moto oyo alokami na bondoki
48Tala ndenge bazali kobetela yo bandakisa, basili kobunga, bakokokaka lisusu te kolanda mpe kozua nzela ya bosôló
49Mpe bakolobaka: Boye soki tokomi mikuwa mpe putulu ya mabele, tokosekwisamaka lisusu bikelamu ya sika
50Loba: Bokoma libanga to libende
51To, bopona ekelamu oyo bomoni ezali monene mpe makasi. Bakolobaka: Nani oyo akozongisaka biso? Loba: Oyo akelaka bino liboso, mpe bazali kotiola yo na boningisi mitu mia bango na bolobi: Tango nini wana? Loba: Ekoki kozala pene
52O mokolo moye akobengaka bino, bokoyanolaka ye na bopesi ye lokumu, bokokanisa ete bowumela na mabele te sé tango moke
53Mpe loba na bawumbu na ngai ete: Baloba maloba sé ya malamu, pamba te mpo satana akotia bokabuani o kati na bango. Ya soló, satana azali penza monguna ya moto ya polele
54Nkolo wa bino ayebi bino malamu koleka, soki alingi akoyokela bino mawa, soki mpe alingi apeși bino etumbu. Мре totindaki yo te ozala mobateli likolo na bango
55Mpe Nkolo wa yo ayebi malamu penza manso maye mazali o likolo mpe na nsé, mpe totombola bantoma basusu likolo ya baninga, mpe topesaki Dáwud zabur
56Loba: Bobelela banzambe wana bozali kozua na botiki ye, bazali na makoki te ya kolongola bino mabe mpe bazali na makoki te ya kopekisa yango ete ezua bino
57Baye bazuaki bango ba nzambe, bango moko bazali koluka eloko nini bakosala epusanisa bango penepene na Nkolo wa bango mpe bazali kolikia ngolu naye mpe bazali kobanga etumbu naye. Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ezali ya kobanga mpe ezali na tembe te
58Mboka moko te ya bobubi ekotikala sé toboma yango yambo ya mokolo mwa suka ekoka, to tokopesaka yango etumbu ya makasi. Nyoso wana esila kokomama o kati ya buku
59Eloko moko te ekopekisa biso тропа kotinda bikamwisi, sé bato ba kala baboya yango, mpe topesaki na bato ya Thamûd náqat oyo (ezalaki ekamwisi) ya polele, kasi basalaki yango mabe (babomaki yango), kasi totindaka bikamwisi te sé тропа kobangisa
60Мре tango tolobaki nayo ete: Ya soló, Nkolo wayo azingi bato banso, mpe ndoto oyo tomonisaki yo yango ezala sé komekama Pona bato, lolenge moko na nzete ya botutu oyo elobami o kati na kurani. Mpe tozali kobangisa bango, kasi ezali sé kobakisela bango botomboki koleka
61Mpe tango toyebisaki na ba anzelu ete: Bogumbamela Adam, bagumbamaki (bango banso) longola sé ibilisa alobaki: Nagumbamela oyo okeli ye na mabele
62Alobi lisusu ete: Omoni moto oyo öpesi ye lokumu koleka ngai, soki otiki ngai na mokili kino mokolo ya suka, na kobungisa ebele kati na mabota naye na bakitani naye, longola sé токе kati na bango
63Mpe (Allah) alobi: Kende, oyo akolanda yo o kati na bango, ya sólo, moto ya lifelo nde lifuta lia bino liye likotalaka bino
64Мре tombokisa bango na mongongo nayo ba oyo okokoka kati na bango, mpe tinda mapinga nayo ya ndenge na ndenge likolo na bango, mpe sangana na bango na kati ya misolo na bango mpe na bana na bango, mpe pesa bango elaka. Kasi satana azali sé kopesa bango elaka ya lokuta
65Ya soló, тропа bawumbu na ngai, okokoka bango te. Kasi Nkolo wayo akoki тропа kobatela bango
66Nkolo wa bino nde oyo atiela bino masuwa likolo ya ebale, bozali kotambola na yango тропа koluka litomba naye. Ya sólo, ye azalaka na mawa na bino
67Mpe soki mabe ezui bino o kati ya ebale, botiki maye bozalaki kobondela mpe bozongeli ye, mpe soki abikisi bino abimisi bino na mayi bokomi na mokili, bozongeli lisusu oyo bozalaki na yango liboso. Kasi ya sólo penza, moto azali sé na bopengwi
68Boye bozali na ebateli soki akani ete eteni ya mabele ezindisa bino, to mpe mopepe ya makasi eya na mbula ya mabanga, mpe bokozala na mobateli te
69To bolingi azongisela bino oyo ezuaki bino (kati na ebale), mpe alimwisa bino тропа bopengwi bwa bino, sima bokokutaka te mobikisi kati na bino
70Ya soló, tosilaki kopesa bana ya Adam lokumu, тре totambwisi bango na mokili тре na ebale, mpe topesi bango bozui ya kitoko, mpe totomboli bango likolo ya bikelamu ebele oyo tokela
71Mokolo moye tokobengaka bato banso na mokambi wa bango (imam), oyo akopesamaka buku naye na loboko ya mobali, baye wana bakotanga yango na esengo, mpe bakobubamaka na eloko te
72Mpe oyo akomona awa na mokili te, akomonaka mpe te o mokolo mwa suka, тре akozalaka na libunga linene
73Mpe balingaki kobungisa yo na maye tokitisaki epai nayo, ete oya na eloko mosusu na esika ya oyo mpo ete bazua yo molingami na bango
74Mpe soki tolendisaka yo te, olingaki komipesa токе ngambu na bango
75Nde tolingaki kopesa yo etumbu ya bomoyi mbala mibale mpe etumbu ya liwa mbala mibale lokola, mpe okokaki kozua mosungi mosusu te na botiki biso
76Мре ya soló penza, etikalaki шоке balonga kokimisa yo mboka, mpo okoma moto pamba, mpe na sima nayo bakowumela mpe tango molayi te
77Ezaleli mpe nzela ya baye totindaki bango liboso nayo kati na batindami na biso, mpe okokuta mbonguana te na mibeko mia biso
78Mpe telemisa losambo osima ya nzanga kino o molili mwa butu, mpe tanga kurani na tongo. Ya sólo, kotanga kurani na tongo ezalaka na banzeneneke
79Mpe okati na butu otelema тропа kosambela (losambo ya suna) nayo moko, mpo ete Nkolo nayo asekwisa yo o mokolo ya suka na esika ya lokumu
80Мре loba ete: Oh Nkolo na ngai! Kotisa ngai na esika ya malamu, mpe bimisa ngai na esika ya bosembo, mpe pesa ngai esika ya mapamboli uta epai nayo
81Mpe loba: Bosóló eyei (isalamu), mpe lukuta elimwi. Ya sólo, lokuta esengeli sé elimwa
82Мре tokitisi na kati na kuranı maye oyo ezali libiki ya bokono mpe ngolu тропа bandimi, kaši ezali kobakisela bapagano sé libunga
83Mpe soki totondisi bolamu na biso likolo na moto, atengami aboyi yango mpe amitondi, mpe soki mabe ezui ye, azangi elikia
84Loba: Moto na moto asala na ndenge naye, kasi Nkolo wa bino ayebi malamu nani azali kolanda nzela ya semba
85Mpe bazali kotuna yo тропа molimo, loba: Molimo mowuta epai ya Nkolo wa ngai, mpe bopesamaki boyebi te sé ya токе
86Mpe soki tolingi, ya soló, tokobungisa oyo tokitisaki epai nayo kati na emoniseli mpe okozua mobateli mosusu te тропа yango na botiki biso
87Longola sé mawa kowuta epai ya Nkolo wayo. Ya sólo, bolamu bwaye epai nayo ezali ebele
88Loba: Ata soki bato mpe bilima basangani mpo basala kurani lokola oyo, bakokoka koya na lolenge na yango te ata soki bazui lisalisi ya ndenge na ndenge kati na bango
89Ya soló, tosilaki kopesa bato bandakisa nyoso na kati ya kurani kasi ebele ya bato bazali sé bapengwi
90Mpe balobaki: Tokondimela yo te, kino obimisela biso liziba ya mayi o kati ya mabele
91To, ozala na bilanga bia Naghil na Inabe mpe obimisa míngala ya mayi ebele mitiola o kati na yango
92To, okweisela biso ndambu ya mapata ndenge ozali kokanisa to oya na nzambe, to óyela biso Allah, na ba anzelu liboso na biso
93To mpe ozala na ndako ya kitoko ezali na bonzenga ya wolo, to mpe obuta (omata) na mapata (likolo), kasi tokondima kobuta nayo wana te kino okitisela biso buku totanga yango, loba: Nkembo na Nkolo na ngai, boye ngai nazali te sé moto mpe motindami
94Eloko moko te epekisaki bato ete bandima tango bokambi eyelaki bango sé balobaka ete: Allah akotinda moto azala motindami
95Loba: Soki ba anzelu batambolaka na kimia likolo ya mabele, tolingaki kokitisela bango kowuta o likolo motindami azala anzelu
96Loba: Allah akoki тропа kozala nzeneneke kati kati na bino na ngai. Ya soló, ye azali na sango mpe amonaka bawumbu naye
97Mpe oyo Allah akambi, asili kokambama, mpe oyo akobunga, okokoka te kozuela bango bakambi na esika naye (Allah) mpe tokosangisa bango o mokolo ya suka bilongi bisunduami, miso ya kozipama, matoyi makangami, na minoko mikolobaka te, esika na bango nde lifelo. Tango nyoso moto na yango elingi kokita, tokobakisela bango oyo ya makasi koleka
98Wana nde lifuta lia bango, mpo bapengwaki na bilembo bia biso, mpe bakolobaka: Tango tokotikala sé mikuwa mpe mputulu na mabele, ya soló penza tokosekwisama lisusu bikelamu ya sika
99Boye bazali kornona te ete: Ya sólo, Allah oyo akela likolo na mabele azali na bokoki ya kokela bikelamu bisusu lokola bango? Mpe atiyeli bango mokano ezali na tembe te? Kasi babubi baboyi, (balingi) sé bopengwi
100Loba: Soki bozalaka na sanduku ya ngolu ya Nkolo wa ngai, bolingaki kobanga kobimisa yango. Kasi moto azali na bopimi
101Mpe tosilaki kopesa na Mûssa makamwisi libua ya polele, botuna bana ba isalayele tango eyelaka bango, kasi falo Alobaki naye: Ya soló, ngai nazali kokanisa ete eh Mûssa! Olokama
102Alobi: Ozali koyeba malamu penza ete oyo akitisaki yango sé Allah Nkolo ya likolo na mabele, тропа (kokamwisa) тре bokasi naye, тре ngai nazali kokanisa ete yo eh falo! O sili kobunga nzela elamu
103(Falo) alingaki kobimisa bango na mboka, kasi tozindisaki ye na baye banso bazalaki elongo naye
104Mpe na sima na yango tolobaki na bana ya isalayele ete; bovanda na mabele kasi tango elaka ya mokolo ya suka ekokokaka tokoya na (bino) ebele na lisanga
105Mpe na bosembo penza nde tokitisaki yango (kurani) mpe ekitaki na bosôló, mpe totindaki yo sé тропа bopesi sango elamu mpe mokebisi
106Мре (tokitisaki) kurani biteni biteni mpo ete otanga yango malembe likolo ya bato bayoka, mpe tokitisaki yango mikapo na mikapo
107Loba: Bondima na yango to te. Ya soló, baye bazuaki boyebi liboso na yango, soki bayoki yango ezali kotangama, bakweyaka mpe bafukami bilongi na nsé. (тропа Allah)
108Mpe balobaka ete: Nkembo na Nkolo wa biso, elaka ya Nkolo wa biso esili ya solo kokoka
109Mpe bazali kokita na kolela mpe ezali kobakisela bango bobangi
110Loba: Bobelela Allah to bobelela Ar-Rahmân to nkombo nini bolingi kobenga, ye nde azali na ba nkombo ya kitoko. Mpe koganga te okati ya losambo nayo koleka, kovanda mpe nye te, kasi zala na mongongo ya kati kati
111Mpe loba lokumu ya Allah oyo azali na mwana te, mpe akoki kozala na basangani te kati ya bokonzi naye, mpe akoki kozala na mobateli mosusu te (ya kokima epai naye) mpe belela bonene bwa ye makasi
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath