15. Al-Hijr, oyo azali
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Alif, lâm, râ. oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele
2(O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima
3Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba
4Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama
5Umma moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima
6Mpe bakolobaka été: Oh yo moto bakitiseli ye buku! Ya soló, ozali moto ya ligboma
7тропа nini te oyelaki biso ba anzelu soki ozalaki o kati ya balobi bosôló
8Tokitisaka ba anzelu sé na bosôló, mpe bazelisaka te тропа etumbu
9Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango
10Mpe ya soló, totindaki batindami yambo nayo, o kati ya bato ba kala
11Mpe motindami moko te ayelaki bango sé batióla ye
12Ndenge wana nde tokotisaka kibopengwi o mitema mia batomboki
13Bakondimaka na yango te, mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso
14Ata soki tofungolelaka bango ezibeli ya likolo тропа komata nde bandimaki mpe te
15Bakolobaka: Ya soló miso та biso mizali ya kolangwa, kasi tozali nde balokami
16Mpe tosilaki ya sólo, kotia minzoto na mapata, mpe topesi yango bonzenga тропа botali
17Mpe tobatelaki yango na mabe manso ma satana wa botutu
18Ata oyo akolinga koyokamela yango, tokolandisa ye moto
19Mpe o mabele totandaki yango, mpe totiyeli yango bangomba mpe tolandisaki eloko nyoso na bokoki bwa yango
20Mpe totiyelaki bino okati na yango (mabele) bilei mpe bikelamu bisusu biye bozali na nguya ya koleisa yango te
21Ezali na eloko moko te sé ezala na sanduku ya bozui na yango epai na biso, mpe tozali kokitisa yango ndambu ndambu na lolenge esengeli
22Mpe tozali kotinda mipepe ya kokolisa milona mpe tokitisi mayi kowuta na mapata тропа komelisa bino na yango, oyo bozali na bokoki ya kobomba yango te
23Mpe ya soló, tozali kopesa bomoyi mpe liwa, mpe biso nde tozali kopesa bokitani
24Mpe toyebi baye baleka liboso na bino (basila kokufa), mpe toyebi baye batikali naino sima
25Mpe ya sólo, Nkolo wayo akosangisaka bango, ya soló ye nde azali na bwanya atonda boyebi
26Мре tokelaki moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu
27Mpe tokelaki ba djini liboso na moto ya molunge makasi
28Mpe tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu ete: Ya soló nalingi kokela moto na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu
29Mpe tango nakosilisa kobongisa ye na lolenge ya kitoko mpe na fuli okati naye, pema nangai bofukamela ye na botosi
30Mpe ba anzelu banso bafukamaki
31Longola sé lusufele (ibilisa), aboyaka kogumbama elongo na bagumbami
32Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te
33Alobi: Nazali te mpona kogumbamela moto oyo okeli ye kowuta na mabele ya kokawuka oyo ezwami na mabele ya muselu
34Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu
35Mpe okozala na botutu kino mokolo mwa suka
36Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami
37Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami
38Kino mokolo ya ngonga eye eyebani
39Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pamba te mpo omemi ngai na libungi, mpe na kobongisela bango mokili mpe nakobungisa bango banso
40Longola sé bawumbu nayo baye osilaki коропа
41(Allah) alobi: Oyo nde nzela ya bokambami epai na ngai
42Ya solo, bawumbu ba ngai ozali na bokonzi likolo na bango te longola sé baye bakolanda yo nakati ya babungi
43Mpe ya soló, lifelo ekozala esika na bango banso
44Ezali na bikuke sambo тропа kokota, mpe bikuke binso biyebani na bato ba yango
45Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba
46Bokota na kati na yango na kimia nyoso
47Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana
48Moko te bolembu ekozua ye, mpe bakobimaka o kati na yango te
49Yebisa bawumbu ba ngai, ya soló, ngai nazali molimbisi natonda ngolu
50Mpe ya sólo, etumbu na ngai ezalaka etumbu ya makasi
51Mpe yebisa bango тропа bapaya ba Ibrâhîm
52Tango bakotelaki ye mpe balobaki: Kimia (salam) alobi: Tozali kobanga bino
53Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya
54Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai
55Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu
56Mpe alobi: Nani azangaka elikya mpe ngolu ya Nkolo waye sé baye babunga nzela
57Mpe (alobaki na bango): Eh batindami (ba Allah)! Bolingi nini
58Balobi: Ya soló, totindami epai ya batomboki
59Longola sé libota lia Loth, ya sólo tokolongisa bango banso
60Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu
61Mpe tango batindami bapusanaki pene na libota lia Loth
62Alobi: Bozali bato bayebani te
63Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te
64Mpe toyei epai nayo na bosóló mpe tozali bato ba bosembo
65Kima noki (kende noki) na libota lia yo na butu, zala sima na bango, moko te kati na bino atala sima. Mpe bökende sé na esika eye bakolakisa bino
66Mpe topesaki ye mobeko mona, mpo bato bana etumbu ezua bango kobanda ntongo tii suka
67Mpe bato ba mboka bayeli ye bazali kosepela
68Alobi: Ya sólo, baye bazali bapaya ba ngai bosala bango mabe te
69Bobanga Allah, kasi bokitisa lokumu na ngai te
70Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili
71Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi
72Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango
73Mpe lolaka ya makasi ezuaki bango na ebimeli ya moyi
74Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi
75Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona
76Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso
77Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi
78Ya sólo, etuka ya aïkat bazalaki mpe babubi
79Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene
80Мре bato ba mboka ya hijr basilaki kosala batindami mabe
81Mpe tolakisaki bango makamwisi ma biso kasi balandaki yango te
82Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia
83Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka
84Maye manso bazalaki na yango, bakokaki kosala na yango eloko te
85Mpe tokelaki likolo na nsé, na maye manso mazuami o kati na yango mibale te sé na bosóló, mpe ya soló, ngonga ekokokaka, limbisa bolimbisi bwa malamu
86Ya sólo, Nkolo wayo azali mokeli mpe moyebi
87Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene
88Mpe kotala te na kolula bozwi ya kitoko topesaki balisanga na bango тропа bisengo ya tango токе, koyoka pasi тропа bango te, kasi zala na komikitisa pona bandimi
89Mpe loba: Ya soló, nazali mokebisi ya polele
90Ndenge moko tokitisaki (etumbu) likolo lia bakaboli
91Baye bazuaki kurani ezala eloko ya bokabwani mpe tembe kati na yango
92Mpe na nkombo ya Nkolo nayo, nakotunaka bango banso
93Mpona maye bazalaki kosala
94Monisa polele maye otindami na yango, mpe pesa mokongo na basangisi (Allah)
95Tozali kosunga yo liboso lia baye bazali kotiola yo
96Baye bazali kosangisa Allah na biloko bisusu, bakoyebaka kala te
97Mpe tosilaki koyeba ete motema nayo ezali kokangama na ntina ya maye bazali koloba
98Mpe kumisa Nkolo wayo, mpe zala o kati ya bagumbami
99Mpe bondela Nkolo wayo, kino bosôló bokoyelaka yo
esika: Zakariya Muhammed Balingongo
WEBREATH · 11:11
«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath