Lingomba ya Islam
zonga

14. Ibrahim, oyo

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Alif, lâm, râ. buku eye tokitisi yango epai nayo ete obimisa na yango bato na molili komema bango na mwinda na ndingisa ya Nkolo wa bango, komema bango na nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu

2Allah nde Nkolo wa manso mazali o likolo mpe o nsé, mpe mpasi ezali тропа bapengwi, bakozuaka etumbu ya makasi

3Baye bazali коропа bomoyi ya nsé koleka oyo ya mokolo mwa suka mpe bazali kobundisa nzela ya Allah mpe bazali kolukela yango minyokoli. Bango bazali na libunga lia mosika

4Mpe totindaki motindami te sé azala moto ya monoko ya bato naye, mpo alimbola bango malamu. Allah abungisaka oyo alingi, mpe akambaka oyo alingi. Mpe ye nde azali na bokasi atonda bwanya

5Мре tosilaki kotinda Mûssa na makamwisi ma biso, bimisa bato bayo na molili bakende na bongengi. Mpe yebisa bango ete bakanisa na mikolo mia Allah. Ya soló, bilembo bina bizali тропа bato banso bakangi mitema mpe bazali na botondi

6Mpe tango Mûssa alobaki na bato naye ete: Bokanisa bolamu ya Allah likolo na bino, tango alongisaki bino na maboko ya bato ya falo, baye bazalaki konyokolo bino na etumbu, mpe bazalaki koboma bana na bino ya mibali mpe kotika basi na bino, kasi wana ezali elembo enene ya bomekami тропа bino kowuta epai ya Allah

7Mpe tango Nkolo wa bino alobaki: Soki ya sólo, bozali kotondo ngai, nakobakisela bino bolamu bwa ngai kasi soki bozangi ngai botondi, ya sólo etumbu na ngai ezali makasi

8Mpe Mûssa alobaki ete: Soki bopengwi bino na baye banso bazali na nsé, ya sólo, boyeba ete Allah atonda na bomengo bwa ye mpe asanzolama na lokumu

9Boye sango ya baye balekaki liboso lia bino ekomelaki bino te ya bato ba Núh, na aad na Thamúd na baye balandaki bango sima? Moko te ayebi bango sé Allah. Batindami ba bango bayelaki bango bilembo, kasi balobaki na kotiya maboko ma bango na minoko mia bango: Tokondima te na maye botindami na yango, mpe tozali na tembe na maye bozali kobenga biso na yango koleka

10Batindami na bango balobaki: Bozali kotiya tembe na Allah, mokeli wa likolo na mabele? Azali kobenga bino mpo alimbisa masumu ma bino, mpe Apesa bino eleko kino mikolo na bino mikoka. (bapengwi bakolobaka): Bozali bato lokola biso, boye bolingi koboisa biso na maye ba nkoko ba biso bazalaki kobondela boyela biso elembo ya polele

11Batindami ba bango bayanolaki bango balobi: Ya soló penza, tozali bato lokola bino, kasi Allah asalisaka oyo alingi o kati ya bawumbu baye. Biso tokoki koyela bino bilembo te sé ezala na bolingi bwa Allah, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi bamipesa

12Mpe тропа nini tokomipesa na Allah te asilaki kokamba biso o nzela ya malamu eye tozali kolanda? Mpe Tokakanga mitema тропа minyokoli mia bino, mpe epai ya Allah, bandimi bamipesa

13Мре bapengwi balobaki na batindami na bango ete: Tokobimisa bino na mabele ma biso, longola sé soki bozongi na lingomba lia biso. Na yango, Nkolo wa bango akitiseli bango emoniseli ete: Tokoboma babubi

14Mpe tokovandisa bino o mboka sima na bango. Wana ezali тропа oyo akobanga bokutani na ngai тре azali kobanga elaka na etumbu. (na ngai)

15Mpe basengaki Allah elonga, mpe bato banso ya mabe bazalaki kobundisa bosôló bakweyaki

16Moto nde ekozala esika na bango, sima bakomelisaka bango mayi ma tofina

17Акотека komela yango mokemoke kaši ekolekaka te, liwa likoyelaka ye na bisika binso kaši akokufaka te. Mpe akozuaka etumbu ya makasi sima na yango

18Ndakisa ya misala ya baye bapengwi na Nkolo wa bango, ezali lokola mputulu ememami na mopepe ya makasi, bakokoka kozua litomba na eloko te na maye basalaki, wana ezali libunga ya mosika

19Boye ozali kornona te ete Allah akela likolo na mabele na bosôló? Soki alingi, abungisi bino тре ayei na bikelamo bisusu o esika na bino

20Kaši wana ezali paši te тропа Allah asala yango

21Мре bawei banso bakobimaka о malita ma bango тре bakotelemaka o liboso lia Allah тропа kokata makambo, mpe bato bamotawu bakolobaka na ba oyo ya makasi mpe ya lolendo: Tozalaki kolanda bino, bokoki kokimisa mpe kobikisa biso na etumbu ya Allah te? Bakoyanolaka: Soki Allah akambaka biso tolingaki kokamba bino, tokokoka komisalisa te ata soki tozeli, mpe tozali na esika ya kokimela te

22Mpe tango makambo manso makosilaka kokatama, satana akoloba na (bato ya lifelo): Ya soló, Allah alakaki bino elaka ya bosóló, ngai nalakaki bino elaka kasi nakokisi yango te. Mpe nazalaki na bokonzi likolo na bino te, kasi ngai na bengaki bino mpe bondimelaki ngai. Bo pamela ngai te, bomipamela bino moko. Ngai nakosalisa bino te mpe bino bokosalisa ngai te. Ya sólo, ngai naboyi na maye bosangisaki ngai na yango liboso (тропа Allah) ya sólo bato mabe bakozuaka etumbu ya makasi

23Мре bakokotisama baye bandimaki mpe basalaki misala milamu o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakozalaka o kati na yango libela, na bolingi bwa Nkolo wa bango. Мре kuna losako na bango lokozala sé ete: (salam) kimia

24Boye, ozali kornona te ete: Allah apeși ndakisa ya liloba lilamu lizali lokola nzete elamu eye misisa mia yango mikangama malamu, mpe bitape bia yango bibimi na likolo

25Ezali kobota mbuma na yango tango inso, na bolingi bwa Nkolo wa yango. Mpe Allah abetelaka bato ba ndakisa mpo bakoka kokanisa

26Mpe apesi ndakisa ya liloba lia mabe, lizali lokola nzete ya mabe, eye ekundami malamu te kati na mabele, esimbamaka makasi te

27Allah azali kolendisa bandimi na liloba litongami malamu, kati ya bomoyi ya nsé mpe na mokolo mwa suka, mpe azali kobungisa babubi, mpe Allah asalaka oyo alingi

28Boye, ozali kornona te, тропа baye babongoli bolamu bwa Allah na bopengwi mpe batandi bato ba bango o ndako ya libungi

29Bakozikisamaka na moto ya lifelo, oyo nde efandeli ya mabe

30Mpe batieli Allah binzambe nzambe, тропа kobungisa na yango bato nzela naye. Loba: Bosepela (na bomoyi bwa mokili) kaši nzela na bino ezali ya sôló okati ya moto ya lifelo

31Loba na bawumbu na ngai baye bandima ete: Batelemisa losambo mpe na maye topesaki bango babimisa yango na polele to na sekele liboso ete eyela bango mokolo oyo mombongo ekozala te mpe kimoninga ekozala te

32Allah nde mokeli wa likolo na nsé, mpe akitisaka mayi kowuta o mapata ezali kobimisa na yango bambuma mpo ezala bozui bwa bino. Мре apeși bino maye ya kosala masuwa mpo etambola na ebale. Na mitindo mia ye, mpe atieli bino mingala

33Mpe atieli bino moyi na sanza, ezala na bongengi bwa libela. Mpe atiyeli bino butu na mokolo

34Mpe apesaka bino nyonso oyo bosengaka ye, mpe soki bolingi koyeba bolamu ya Allah oyo asaleli bino, bokokoka koyeba motango mwa yango te. Ya soló, moto alekisi ndelo na bopegwi mpe bobubi

35Mpe tango Ibrâhîm alobaki: Oh Nkolo wa ngai! Tia mboka oyo (Makkah) ezala na kimia, mpe tiya ngai na bana ba ngai mosika mpo tobondela bikeko te

36Oh Nkolo wa ngai! Ya sôló, yango (bikeko) bisili kobungisa bato ebele. Mpe moto oyo akolanda ngai, ya soló azali wa ngai, kasi oyo akotosa ngai te, ya sólo, yo nde molimbisi otonda ngolu

37Oh Nkolo wa biso! Ya sólo, natiki ndambu ya libota na ngai na nsé ya ngomba oyo, ezali na bato te mpe ezali na milona te, pene na ndako nayo esantu, Nkolo mpo été batelemisa losambo, mpe sala été bato bawuta mosika bakende kofanda na bango esika wana, mpe leisa bango bambuma mpo été batonda yo botondi

38Oh Nkolo wa biso! Ya sólo penza, oyebi maye mabombami o mitema mia biso na maye tomonisaka polele, mpe eloko te ekoki kobombamela Allah ezala na nsé to na likolo

39Matondi na Allah oyo apesi ngai likabo ya İsmail mpe Is’háq na bopaka na ngai. Ya sólo, Nkolo na ngai azali penza moyoki ya libondeli

40Oh Nkolo wa ngai! Sala ngai ete nakokisa basambela elongo na libota nangai, Nkolo wa biso ndima libondeli na biso

41OhNkolo wa biso! Limbisangai na baboti ba ngai, na bandimi o mokolo mwa lifuta

42Mpe bokanisa te ete: Allah alandaka te maye babubi bazali kosala. Ya soló, azali kozelisa bango kino o mokolo moye miso ma bango makotombwama

43Batomboki bakopotaka mbangu mpe mitu na miso na bango mikotala o likolo, mpe mitu mia bango mikozala polele, mpe mitema mikozalaka na eloko te

44Mpe kebisa bato тропа mokolo moye etumbu ekoyelaka bango, babubi bakolobaka: Nkolo wa biso! Zelisa biso ata mwa ngonga токе, mpo toyanola na mbela nayo, mpe tolanda batindami. Boye bolapaki liboso te ete bokoki kolimwa te

45Boye bovandaki te na bisika bia baye babubaki milimo mia bango moko? Mpe bino boyebi polele ndenge nini tosalaki bango, mpe totangela bino bandakisa

46Mpe basilaki kosala likita lia mabe, kasi likita lia bango wana liyebani epai ya Allah, ata soki likita lia bango lizali makasi ekoki kopanza ngomba te

47Мре bokanisa te ete: Allah akozangisa kokokisa elaka naye epai ya batindami naye. Ya soló, Allah azali na nguya тропа kopesa etumbu

48Mokolo moye mabele makotikela mabele mosusu esika. Na mapata lokola, mokolo moye bato bakobimaka liboso lia Allah wa bomoko atonda bokasi

49О mokolo mona okomona batomboki bakangami bango na bango na minyololo

50В ilamba bia bango bikozalaka nde mbiko mpe moto mokozingaka bilongi bia bango

51(Nyoso wana) ekozala mpo Allah akofutaka moto nyoso engebene na maye asalaki. Ya sólo, Allah azali mbangu тропа kofuta

52Oyó ezali sango mpe liyebisi (kurani) тропа bato bakeba na yango, mpe bayeba ya sólo ete, ye Nzambe (Allah) azali sé ye moko, na yango esengeli na bato ya mayele basosola

esika: Zakariya Muhammed Balingongo

WEBREATH · 11:11

«If you are thankful, I will give you more» — Quran 14:7

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath