Loyembo ya Salomo 7
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Zonga, zonga, oh mwasi ya Sulami ! Zonga, zonga mpo ete tokoka kotala yo malamu ! Mpo na nini bolingi kotala malamu mwasi ya Sulami ndenge batalaka mabina ya mindule ya masanga mibale ?
2Oh elenge mwasi ya lokumu ! Makolo na yo ebimaka kitoko soki olati basandale. Zingazinga ya loketo na yo ezali lokola lopete oyo esalemi na maboko ya basali bikeko.
3Motolu na yo ezali lokola kopo ya kitoko oyo ezangaka vino ya kitoko te. Libumu na yo ezali lokola mopiku ya ble oyo ezingami na fololo oyo babengaka lisi.
4Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko.
5Kingo na yo ezali lokola ndako molayi oyo batonga na pembe ya nzoko. Miso na yo ezali lokola maziba ya engumba Eshiboni, pembeni ya ekuke ya Bati-Rabimi. Zolo na yo ezali lokola ndako molayi ya Libani oyo etalani na Damasi.
6Moto na yo ezali lokola ngomba Karimeli, mpe suki ya moto na yo ezali lokola elamba ya motane ; mokonzi akangami na mazita na yango.
7Oh tala ndenge ozali penza kitoko ! Bolingo na ngai, osalaka esengo ya motema na ngai ; kitoko na yo esalaka ngai esengo na motema !
8Molayi na yo ezali lokola nzete ya mbila, mabele na yo ezali lokola maboke ya bambuma.
9Namilobeli : « Nakomata na nzete ya mbila, nakobuka bambuma na yango ! » Tika ete mabele na yo ezala lokola maboke ya bambuma ya vino ! Tika ete solo ya monoko na yo ezala lokola bapome !
10Mpe tika ete monoko na yo ezala lokola vino ya kitoko koleka ! Elenge mwasi Tika ete vino yango esopanela bolingo na ngai na pete, eleka na bibebu ya bato oyo bazali kolala.
11Ngai, nazali ya mobali na ngai ; mpe ye, azalaka kaka na posa na ngai.
12Yaka, mobali na ngai ; tika ete tokende na biso na elanga, tolekisa butu na biso kati na mboka !
13Na tongo, tokokende na bilanga ya vino mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa bafololo, soki mito na yango efungwami, mpe soki banzete ya bambuma ya grenade ebimisi bafololo. Kuna nde nakopesa yo babeze na ngai.
14Bambuma ya mandragore ezali kobimisa solo na yango ; mpe na ekuke na biso, tozali na bambuma nyonso ya kitoko : ezala ya sika to ya kala, oyo nabombeli yo, mobali na ngai ya motema.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath