Boklisto
zonga

Loyembo ya Salomo 3

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Butu mobimba, na mbeto na ngai, nazali koluka mobali oyo motema na ngai elingaka ; naluki ye, kasi namonaki ye te.

2Esengeli na ngai kolamuka sik’oyo mpe kobima libanda ya engumba, na balabala na yango mpe na bisika oyo bato nyonso bakutanaka ; nakoluka mobali oyo motema na ngai elingaka. Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.

3Bakengeli bamonaki ngai tango bazalaki koleka-leka na balabala ya engumba. Natunaki bango : « Bomoneli ngai te mobali oyo motema na ngai elingaka ? »

4Tango kaka nalekaki bango, mbala moko, namonaki mobali oyo motema na ngai elingaka. Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende. Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai, na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.

5Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga : Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.

6Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata, azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa, oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko ya moto ya mombongo ?

7Tala ! Ezali nde tsipoyi ya mokonzi Salomo ! Basoda na ye ya mpiko, bato ya lokumu ya Isalaele, tuku motoba nde bamemi yango.

8Bango nyonso balati mipanga ; bango nyonso bazali makasi na bitumba, baselingwa mpo na bitumba ya butu.

9Mokonzi Salomo asalisaki tsipoyi ; basalaki yango na mabaya ya mboka Libani.

10Basalaki bisimbelo na yango na palata, mokongo na yango, na wolo. Balatisaki evandelo na yango bilamba ya motuya ya langi ya motane makasi. Bongo, bilenge basi ya Yelusalemi babongisaki kati na yango na motema ya bolingo.

11Bino bilenge basi ya Siona, bobima ; botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole, motole oyo mama na ye alatisaki ye na mokolo ya libala na ye, na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath