Boklisto
zonga

Banzembo 98

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Nzembo. Boyembela Yawe nzembo ya sika, pamba te asalaka makambo ya kokamwa ! Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe, alongaki.

2Yawe atalisaki elonga na Ye, amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.

3Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye mpo na libota ya Isalaele. Kino na suka ya mokili, elonga ya Nzambe na biso emonanaki.

4Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko, boyemba banzembo ya esengo mpe bobeta mindule !

5Bobetela Yawe lindanda, boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze !

6Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi, na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.

7Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito !

8Tika ete bibale ebeta maboko mpe bangomba nyonso eganga na esengo

9liboso ya Yawe, pamba te azali koya kosambisa mabele ! Akokata makambo na yango na bosembo.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath