Banzembo 97
ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi
1Yawe azali kokonza ! Tika ete mabele esepela ; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo !
2Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye, bosembo mpe bosolo ezali miboko ya Kiti na Ye ya Bokonzi.
3Moto etambolaka liboso na Ye, ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.
4Mikalikali na Ye engengisaka mokili ; mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.
5Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.
6Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye, mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.
7Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta ! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye !
8Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli ; bingumba ya Yuda ezali na esengo mpo na mikano na Yo !
9Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; oleki banzambe nyonso.
10Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe ! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.
11Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.
12Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe ; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.
WEBREATH · 11:11
«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25
Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.
WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath