Boklisto
zonga

Banzembo 96

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Boyembela Yawe nzembo ya sika ! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe !

2Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye ! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo !

3Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota ! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso.

4Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.

5Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba, nzokande Yawe akela likolo.

6Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.

7Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe ; bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye !

8Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo ! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye !

9Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi ! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye !

10Boloba kati na mabota : « Yawe azali Mokonzi ! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »

11Tika ete likolo esepela, mpe mabele ezala kati na esengo ! Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango epesa lokito !

12Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso oyo ezali kati na yango esepela, mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga na esengo

13liboso ya Yawe, pamba te azali koya ! Solo, azali koya kosambisa mabele ; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath