Boklisto
zonga

Banzembo 95

ezali naino na libongoli moko te na monɔkɔ na yo — kolakisa Lingelesi

1Boya, toganga na esengo mpo na Yawe ! Tobetela Libanga na biso maboko, pamba te azali Mobikisi na biso !

2Tokende liboso na Ye elongo na mabondeli ya kozongisa matondi, tobetela Ye maboko elongo na banzembo.

3Pamba te Yawe azali Nzambe Monene, azali Mokonzi Monene, na likolo ya banzambe nyonso.

4Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye ; mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.

5Ebale monene ezali ya Ye, azali Mokeli na yango ; mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye, asala yango na maboko na Ye.

6Boya, togumbama mpe tofukama, tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe, Mokeli na biso !

7Pamba te azali Nzambe na biso ; tozali bato oyo aleisaka, etonga oyo abatelaka. Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,

8« boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki na Meriba ; ndenge bosalaki na mokolo wana ya Masa kati na esobe

9epai wapi batata na bino batombokelaki ngai mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.

10Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›

11Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »

esika: Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi

WEBREATH · 11:11

«He himself gives everyone life and breath and everything else» — Acts 17:25

Breath is one for all: everyone lives by it, whoever they are and whatever they believe. Every day at 11:11 local time people stop for sixty seconds, breathe, and thank GOD for the breath — each in their own words, each within themselves. In that minute we are One Breath.

WEBREATH — the Minute at 11:11, your own local time — we are One Breath